Pular para o conteúdo
Publicidade

10 Milagres de Jesus na Bíblia: Lista com versículos e explicação

Por Bíblia Online

Os milagres de Jesus são muito mais do que demonstrações de poder sobrenatural; eles são sinais que confirmam sua divindade e missão. Ao longo dos Evangelhos, vemos Cristo curando enfermos, dominando a natureza e vencendo a morte.

Neste guia, selecionamos 10 milagres de Jesus na Bíblia, organizados com referências e uma breve explicação sobre o impacto espiritual de cada um deles.

Os principais milagres de Jesus nos Evangelhos

1. Transformação da Água em Vinho

  • Referência: João 2:1-11

  • Explicação: Ocorreu nas Bodas de Caná. Sendo o seu primeiro milagre público, Jesus demonstrou autoridade sobre a matéria e a natureza, revelando sua glória aos discípulos e abençoando a instituição da família.

Likamwisi ya liboso : Yesu abongoli mayi vino

Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango. Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.

Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye :

Bazali lisusu na vino te !

Kasi Yesu azongiselaki ye :

Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.

Mama na Ye alobaki na basali :

Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.

Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale. Bongo Yesu alobaki na basali :

Botondisa bambeki oyo na mayi.

Batondisaki yango meke.

Alobaki lisusu :

Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti.

Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.

Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi ; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo »

Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.

2. Cura do cego de nascença

  • Referência: João 9:1-12

  • Explicação: Jesus usa lodo para curar um homem que nunca havia enxergado. Este milagre prova que Ele é a Luz do Mundo e tem poder para restaurar o que nasceu com defeito.

Yesu abikisi mokufi miso

Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. Bayekoli na Ye batunaki Ye :

Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ?

Yesu azongisaki :

Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye. Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala. Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.

Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso mpe alobaki na ye :

Kende kosukola na liziba ya Siloe.

Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.

Bato oyo bazalaki zingazinga na ye mpe ba-oyo bazalaki komona ye kosenga-senga mbongo bakomaki koloba :

Boni, ezali ye te moto oyo azalaki tango nyonso ya kovanda mpo na kosenga-senga mbongo ?

Bamoko bazalaki koloba :

Ezali ye !

Bamosusu :

Te, ezali ye te ; akokani na ye !

Kasi ye moko, mokufi miso, azalaki koloba :

Ezali ngai !

Bongo batunaki ye :

Miso na yo ebikaki ndenge nini ?

Azongiselaki bango :

Moto oyo babengaka Yesu asalaki potopoto, apakolaki ngai yango na miso, bongo alobaki na ngai : « Kende kosukola na Siloe» Boye, nakendeki, nasukolaki mpe, mbala moko, nakomaki komona.

Batunaki ye lisusu :

Moto yango azali wapi ?

Azongisaki :

Nayebi te !

3. Multiplicação dos pães e peixes

  • Referência: Mateus 14:13-21

  • Explicação: Com apenas cinco pães e dois peixes, Jesus alimentou mais de 5 mil homens. Este sinal revela Cristo como o Pão da Vida, aquele que supre todas as nossas necessidades.

Yesu aleisi mibali nkoto mitano

Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo. Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela.

Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye :

Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga.

Kasi Yesu alobaki na bango :

Bazali na tina na kokende kuna te ! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.

Bayekoli bazongisaki :

Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale.

Yesu alobaki :

Boya na yango awa epai na Ngai.

Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.

4. Jesus acalma a tempestade

  • Referência: Marcos 4:35-41

  • Explicação: Com uma ordem, o vento e o mar se aquietam. O milagre ensina sobre a paz que excede o entendimento e a autoridade do Messias sobre a criação.

Yesu aleki mopepe na makasi

Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :

Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.

Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango. Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi. Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.

Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga :

Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ?

Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :

Tika makelele ! Vanda nye !

Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.

Bongo alobaki na bayekoli na Ye :

Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?

Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye »

5. Cura da mulher com fluxo de sangue

  • Referência: Marcos 5:25-34

  • Explicação: Uma cura que aconteceu pelo toque da fé. Jesus mostra que está atento ao sofrimento individual e que a fé é o canal para receber o milagre.

Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te ; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata. Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye, pamba te azalaki komilobela : « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika »

Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.

Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki :

Nani asimbi Ngai na bilamba ?

Bayekoli na Ye bazongisaki :

Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu : « Nani asimbi Ngai »

Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo. Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.

Yesu alobaki na ye :

Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !

6. Libertação do endemoninhado Gadareno

  • Referência: Marcos 5:1-20

  • Explicação: Jesus liberta um homem dominado por uma legião de espíritos. É a prova clara de sua autoridade absoluta sobre o reino das trevas.

Yesu aleki milimo mabe na makasi

Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza, Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye. Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ; pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye. Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.

Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye mpe agangaki na makasi nyonso :

Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !

Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo »

Yesu atunaki ye :

Kombo na yo nani ?

Azongisaki :

Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !

Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana. Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.

Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango»

Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.

Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema. Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango. Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu. Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango.

Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko.

Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye : « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo ; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa»

Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli ; mpe bato nyonso bakamwaki.

7. Ressurreição da filha de Jairo

  • Referência: Marcos 5:21-43

  • Explicação: Jesus demonstra que a morte para Ele é como o sono. Ele restaura a vida de uma criança, trazendo esperança para uma família desesperada.

Yesu aleki bokono mpe kufa na makasi

Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale.

Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana ; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te»

Boye Yesu akendeki na ye nzela moko ; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso. Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te ; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata. Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye, pamba te azalaki komilobela : « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika »

Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.

Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki :

Nani asimbi Ngai na bilamba ?

Bayekoli na Ye bazongisaki :

Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu : « Nani asimbi Ngai »

Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo. Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso.

Yesu alobaki na ye :

Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !

Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye :

Mwana na yo ya mwasi asili kokufa ; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi ?

Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani :

Kobanga te, zala kaka na kondima !

Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake. Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.

Akotaki mpe alobaki na bango :

Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso ? Mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te ; alali nde pongi !

Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki. Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : « Talita kumi » Elingi koloba : Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !

Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza. Yesu apekisaki bango koloba likambo yango ata na moto moko ; mpe ayebisaki bango ete bapesa elenge mwasi yango bilei.

8. Jesus anda sobre as águas

  • Referência: Mateus 14:22-33

  • Explicação: Ao caminhar sobre o Mar da Galileia, Jesus mostra que não está sujeito às leis da física. O episódio também serve para tratar a fé e a dúvida no coração de Pedro.

Yesu atamboli na mayi

Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato. Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko. Nzokande, kaka na tango yango, wana bwato ekomaki mosika, na molayi ya bametele koleka nkama moko longwa na mokili, mbonge ekomaki koningisa bwato yango makasi, pamba te mopepe ezalaki kobeta na ndenge ya kozongisa bwato na sima.

Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba :

Elima ! Elima ! Elima !

Bagangaki mpo na somo. Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango :

Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !

Petelo alobaki na Ye :

Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi.

Yesu alobaki na ye :

Yaka.

Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu. Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki :

Nkolo, bikisa ngai !

Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye :

Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?

Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki. Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki :

Ya solo, ozali Mwana na Nzambe !

9. Cura do paralítico

  • Referência: Marcos 2:1-12

  • Explicação: Jesus cura o corpo, mas primeiro perdoa os pecados. Este milagre estabelece que sua missão principal é a reconciliação espiritual do homem com Deus.

Yesu alimbisi mpe abikisi ebosono

Sima na mwa mikolo, Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi. Tango bato bayokaki ete azali na ndako, bayaki ebele kosangana kati na ndako yango kino esika ezalaki lisusu te, ezala na liboso ya ekuke, mpe Yesu ateyaki bango Sango Malamu. Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli. Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono :

Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.

Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema : « Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te »

Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango :

Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ? Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono : « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola » Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.

Bongo alobaki na ebosono :

Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.

Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Totikala nanu komona likambo ya boye te »

10. Ressurreição de Lázaro

  • Referência: João 11:1-44

  • Explicação: O milagre mais impactante antes da crucificação. Ao ressuscitar alguém morto há quatro dias, Jesus declara: "Eu sou a ressurreição e a vida".

Kufa ya Lazare

Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte. Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.

Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu :

Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.

Tango Yesu ayokaki yango, alobaki :

Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.

Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare. Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki. Bongo alobaki na bayekoli na Ye :

Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.

Bayekoli balobaki na Ye :

Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?

Yesu azongisaki :

Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo. Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.

Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu :

Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.

Bayekoli balobaki na Yesu :

Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye !

Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka. Bongo Yesu alobaki na bango na polele :

Lazare akufi. Mpe nazali na esengo makasi mpo na bino lokola bozalaki kuna te, pamba te likambo oyo ekosala ete kondima na bino elendisama. Kasi sik’oyo tokende epai na ye.

Na bongo, Toma, oyo bazalaki mpe kobenga « Lipasa» alobaki na bayekoli mosusu :

Biso mpe, tokende mpo ete tokufa elongo na Yesu !

Tango Yesu akomaki, ayokaki ete basilaki kokunda Lazare kati na kunda wuta mikolo minei. Mpe lokola Betani ezalaki mosika ya Yelusalemi na bakilometele pene misato, Bayuda mingi bayaki epai ya Mari mpe Marte mpo na kokabola mawa elongo na bango, mpo na kufa ya ndeko na bango.

Lisekwa mpe bomoi

Tango Marte ayokaki ete Yesu azali koya, akendeki kokutana na Ye ; kasi Mari atikalaki ya kovanda kati na ndako.

Marte alobaki na Yesu :

Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te ! Kasi nazali na kondima ete, ata sik’oyo, Nzambe akopesa Yo nyonso oyo okosenga Ye.

Yesu alobaki na ye :

Ndeko na yo akosekwa.

Marte azongiselaki Yesu :

Nayebi solo ete akosekwa, na mokolo ya suka, na tango bakufi bakosekwa.

Yesu alobaki na ye :

Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto nyonso oyo andimi Ngai akozala na bomoi, atako akufi. Mpe moto nyonso oyo andimi Ngai, wana azali na bomoi, akotikala kokufa te. Ondimi yango ?

Marte azongisaki :

Iyo, Nkolo ! Nandimi ete ozali Klisto, Mwana na Nzambe, oyo asengelaki koya na mokili.

Sima na Marte koloba bongo, akendeki kobenga Mari, ndeko na ye ; mpe wana abendaki ye pembeni, alobaki na ye na mongongo ya se penza :

Moteyi ayei, azali kobenga yo.

Tango kaka Mari ayokaki bongo, atelemaki na lombangu mpe akendeki epai ya Yesu. Nzokande, Yesu akotaki nanu te na mboka ; azalaki kaka na esika oyo Marte akutanaki na Ye. Tango Bayuda oyo bazalaki elongo na Mari kati na ndako mpo na kokabola mawa elongo na ye, bamonaki Mari kotelema na lombangu mpe kobima libanda, balandaki ye, pamba te bakanisaki ete akei kolela na kunda.

Tango kaka Mari akomaki na esika oyo Yesu azalaki mpe amonaki Ye, amibwakaki na makolo na Ye mpe alobaki :

Nkolo, soki ozalaki awa, ndeko na ngai alingaki kokufa te !

Tango Yesu amonaki Mari mpe Bayuda oyo bayaki elongo na ye kolela, ayokaki mawa makasi mpe amitungisaki. Atunaki bango :

Bokundaki ye wapi ?

Bazongisaki :

Nkolo, yaka kotala.

Yesu alelaki.

Bongo Bayuda balobaki :

Tala ndenge nini alingaki ye !

Kasi bamosusu kati na bango balobaki :

Ezali ye te oyo abikisaki mokufi miso ? Bongo ndenge nini akokaki te kosala ete Lazare akufa te ?

Yesu asekwisi Lazare

Lokola Yesu amitungisaki lisusu makasi, akendeki na kunda. Ezalaki kati na ebombamelo ya mabanga oyo, na ekotelo na yango, batiaki libanga moko ya monene.

Yesu alobaki na bango :

Botindika libanga.

Kasi Marte, ndeko ya mowei, alobaki na Yesu :

Nkolo, azali kolumba solo ! Wuta bakundaki ye, esali mikolo minei.

Yesu alobaki na ye :

Nalobaki na yo te ete soki ondimi, okomona nkembo ya Nzambe ?

Boye batindikaki libanga. Bongo Yesu atombolaki miso na likolo mpe alobaki : « Tata, nazali kotonda Yo mpo ete oyoki Ngai. Nayebaki ete oyokaka Ngai tango nyonso ; kasi soki nalobi bongo, ezali mpo ete bato oyo bazali zingazinga na Ngai bandima ete Yo nde otindaki Ngai»

Sima na Yesu koloba bongo, agangaki :

Lazare, bima !

Mpe mowei abimaki longwa na kunda ; makolo mpe maboko na ye ezalaki ya kokangama na basinga ya bitendi, mpe elongi na ye ezalaki ya kozipama na elamba.

Bongo Yesu alobaki na bato oyo bazalaki wana :

Bofungola ye basinga wana mpe botika ye kokende.

Conclusão

Os milagres de Jesus revelam sua autoridade sobre a natureza, as enfermidades, o mundo espiritual e até a morte. Eles não são apenas demonstrações de poder, mas sinais que apontam para sua identidade e missão.

Ao estudar esses milagres, é possível compreender melhor o papel de Jesus e a mensagem central do Evangelho.

Se este conteúdo ajudou você a entender os milagres de Jesus na Bíblia, compartilhe este artigo para que mais pessoas também conheçam esses ensinamentos.

Edineia Fernandes
1 pessoa deu Amém