O adultério
O adultério é pecado grave que destrói alianças, famílias e vidas. A Bíblia condena firmemente a infidelidade conjugal e chama à pureza, fidelidade e santidade no casamento.
A lei de Deus
Não adulterarás. Quem comete adultério destrói a própria alma. A Palavra de Deus é clara e direta sobre este pecado.
Okosalaka ekobo te.
Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.
Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.
Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga
azali lokola moto oyo azangi mayele ;
kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;
Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga
azali lokola moto oyo azangi mayele ;
kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;
akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ;
bongo soni na ye ekosila te.
Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali,
mpe akozala na mawa te na mokolo
oyo akozongisa mabe na mabe ;
akotikala kondima ata lifuti moko te
mpo ete akoka kolimbisa,
mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.
Boni, moto akoki solo kozika moto,
bongo bilamba na ye ezika te ?
Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto,
bongo makolo na ye ezika te ?
Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto
na mwasi ya ndeko na ye
akozanga te kozwa etumbu.
Jesus ensina
Quem olhar para uma mulher com intenção impura já adulterou no coração. Jesus elevou o padrão da pureza.
Boyokaki ete baloba : ‹ Okosalaka ekobo te. › Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.
Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.
Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.
Yesu alobaki na bango :
— Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo liboso ya mwasi na ye ya liboso. Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.
Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.
Balobaki na Yesu :
— Moteyi, mwasi oyo asali ekobo ; bakuti ye penza azali kosala yango ! Kati na mibeko, Moyize apesa biso mitindo ya koboma basi ya boye na mabanga. Bongo yo, olobi nini na tina na yango ?
Balobaki bongo mpo na kotiela Yesu motambo mpe koluka nzela ya kofunda Ye.
Kasi Yesu agunzamaki ; mpe na nzela ya mosapi na Ye, abandaki kokoma na mabele. Lokola bakobaki kaka kopesa Ye mituna, Yesu atelemaki mpe alobaki na bango :
— Tika ete moto oyo, kati na bino, asala nanu lisumu te abamba ye libanga moto ya liboso.
Bongo Yesu agunzamaki lisusu mpe azongelaki kokoma na mabele. Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo, Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye :
— Mwasi, bato oyo bayei kofunda yo bazali wapi ? Boni, ata moko te akateli yo etumbu ?
Mwasi azongisaki :
— Nkolo, moko te !
Bongo Yesu alobaki na ye :
— Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende ; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]
Armadilhas e consequências
Os lábios da mulher estranha destilam mel, mas o seu fim é amargo. Fuja da imoralidade — o adultério escraviza.
Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka
mafuta ya nzoyi,
mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;
kasi na suka na nyonso,
azali bololo lokola masanga ya bololo,
songe lokola mopanga ya minu mibale.
Makolo na ye ekokita kino na kufa,
ekokende kino na mokili ya bakufi.
Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi,
alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka
mafuta ya nzoyi,
mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;
kasi na suka na nyonso,
azali bololo lokola masanga ya bololo,
songe lokola mopanga ya minu mibale.
Makolo na ye ekokita kino na kufa,
ekokende kino na mokili ya bakufi.
Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi,
alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.
Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai,
kopesa maloba na ngai mokongo te ;
longola nzela na yo pembeni na ye
mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
noki te akoya kokaba lokumu na yo
epai ya bato mosusu,
mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;
longola nzela na yo pembeni na ye
mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,
noki te akoya kokaba lokumu na yo
epai ya bato mosusu,
mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;
noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi,
mpe mbuma ya mosala na yo ekokende
na ndako ya mopaya ;
noki te okokoma kolelalela na suka
tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,
mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya,
mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?
Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai
mpe napesaki litoyi te epai ya bato
oyo bazalaki koteya ngai ?
Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo,
kati na Lingomba ya bato ya Nzambe. »
oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,
lokola mboloko ya mafuta.
Tika ete tango nyonso,
mabele na ye etondisaka yo na esengo,
mpe bolingo na ye elangwisaka yo !
Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela
kolinga mwasi ya ndumba ?
Mpo na nini kosepela kosakana
na mabele ya mwasi mosusu ?
pamba te ndako na ye ememaka na kufa,
mpe nzela na ye ememaka na mboka ya bakufi.
Moto moko te oyo akotaka epai na ye azongaka
mpe amonaka lisusu nzela ya bomoi.
Monoko ya mwasi ya ndumba ezalaka lokola libulu ya mozindo ;
moto oyo Yawe asilikeli akweyaka kuna.
Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino : Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino. Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.
Tala misala ya bomoto : kindumba, misala ya bosoto, pite, kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana, likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso : bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.
Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.
Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso : bokimaka pite ; moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu, asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,
Bato na ekobo ! Boyebi te ete kolinga mokili ezali koyina Nzambe ? Moto oyo alingi kozala moninga ya mokili amikomisi monguna ya Nzambe.
Napesaki ye tango mpo ete abongola motema, kasi aboyi kaka kotika kindumba na ye. Boye, nakobwaka ye na mbeto ya pasi makasi elongo na bato oyo basalaka kindumba elongo na ye. Kasi soki babongoli mitema mpe batiki kotambola kolanda mateya ya Jezabeli, nakobwaka bango te na mbeto ya pasi makasi.