Publicidade

Agradecimento a Deus

Por Bíblia Online

Agradecer a Deus é louvor, adoração e reconhecimento da sua soberania. Dai graças ao Senhor porque Ele é bom — a sua misericórdia dura para sempre!

Tokende liboso na Ye

elongo na mabondeli ya kozongisa matondi,

tobetela Ye maboko elongo na banzembo.

Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi,

bokota na lopango na Ye na kokumisa.

Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.

Soki tozangi boyengebene, Nzambe azali kaka Moyengebene

Bokumisa Yawe !

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo !

Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.

Boyembela Yawe nzembo ya matondi !

Bobetela Nzambe na biso lindanda mpo na kosanzola Ye !

Solo, nazali mobola mpe moto ya pasi ;

kasi lobiko na Yo, oh Nzambe, ebatelaka ngai.

Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;

natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.

Motema na ngai etondi na esengo,

mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.

Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo

mpe kokumisa Kombo na Yo.

Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.

Matondi mpe losambo

Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino ;

Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.

Matondi mpo na kondima ya bato ya Tesalonika

Tozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe mpo na bino nyonso tango totangaka bino kati na mabondeli na biso. Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.

Polo azongisi matondi epai ya Nzambe

Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ;

Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto !

Elonga ya Klisto

Sik’oyo, tika ete matondi ezonga epai na Nzambe oyo, mpo na bomoko na biso na Klisto, atambolisaka biso tango nyonso kati na molongo na Ye ya balongi, mpe azwaka biso lokola bisalelo na Ye mpo na kopanza boyebi ya Klisto, na bisika nyonso, lokola solo kitoko ya malasi.

Mpe Ye oyo apesaka nkona epai ya moloni mpe lipa lokola bilei akopesa lisusu, akofulukisa nkona na bino mpe akokolisa bambuma ya bosembo na bino.

Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso ; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe.

bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ; bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ; mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu.

Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-