Agradecimento pela vida
Agradecer pela vida é reconhecer que cada respiração é dom de Deus. Toda criatura que tem fôlego louve ao Senhor — porque Ele nos formou e nos sustenta com amor.
Tika ete nyonso oyo ezali na pema ekumisa Yawe !
Bokumisa Yawe !
Nzambe alongisaka banyokolami
Bokumisa Yawe !
Oh molimo na ngai, kumisa Yawe !
Nakokumisa Yawe bomoi na ngai mobimba,
nakosanzola Nzambe na ngai tango nyonso
nakozala na bomoi.
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te
tango osalaki ngai na esika ebombama,
tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
Tango nazalaki nanu na lolenge te,
ozalaki komona ngai ;
mpe omikomelaki kati na buku na Yo
mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai
liboso ete moko te kati na yango ezala.
Nakoyembela Yawe
bomoi na ngai mobimba ;
nakoyembela Nzambe na ngai
tango nyonso nazali na bomoi.
Tika ete maloba na ngai esepelisa Ye !
Tika ete Yawe azala esengo na ngai !
Boyeba ete Yawe nde azali Nzambe ;
Ye nde asala biso, mpe tozali bato na Ye.
Solo, tozali bato na Ye mpe etonga oyo aleisaka.
Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi,
bokota na lopango na Ye na kokumisa.
Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.
Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe,
mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi.
Yawe, obikisaka bato mpe banyama.
Oh Nzambe, tala ndenge nini bolingo na Yo ezali motuya !
Bato bazwaka ebombamelo na elili ya mapapu na Yo.
Baliaka mpe batondaka bilei ya Ndako na Yo,
mpe omelisaka bango mayi
kowuta na bolingo monene na Yo.
Yawe azongisi ngai na bomoi
Nzembo ya Davidi mpo na libulisi ya Tempelo.
Yawe, nanetoli Yo,
pamba te obimisaki ngai na libulu ya mozindo
mpe otikaki te banguna na ngai kosepela na tina na ngai.
Yawe, Nzambe na ngai, nabelelaki Yo
mpo na kosenga lisungi,
mpe obikisaki ngai na bokono.
Nzambe akataka makambo
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Nakosanzola Yawe na motema na ngai mobimba,
nakotatola misala minene na Yo nyonso.
bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ;
Ngolu ya Nzambe kati na Klisto
Tika ete lokumu epesamela
Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso,
oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo,
mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto.
Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te !
mpe mpo ete, na esengo nyonso, bozongisaka matondi epai ya Tata oyo apesaki bino makoki ya kosangana na libula ya basantu kati na Bokonzi ya pole. Pamba te :
Akangolaki biso na bokonzi ya molili
mpe amemaki biso kati na bokonzi
ya Mwana na Ye ya bolingo,
oyo, kati na Ye,
tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.
Klisto azali elilingi ya Nzambe oyo amonanaka te,
azala liboso ya bikelamu nyonso,
pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama
kati na Likolo mpe na mabele,
bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te,
milimo mpe bokonzi ya milimo,
bakonzi ya milimo mpe banguya.
Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu
nde nyonso ekelama.
Yesu azali liboso na nyonso,
mpe nyonso esimbama kati na Ye ;
Tango bokolia mpe bokotonda, bosanzola Yawe, Nzambe na bino, mpo na mokili ya malamu oyo apesi bino.
Nkolo, obundelaki ngai solo,
osikolaki bomoi na ngai !
Nazindi kino na kingo,
mayi ya libulu ya molili makasi ezingeli ngai,
matiti ya ebale ekangani-kangani zingazinga ya moto na ngai.
Nazindi kino na esika oyo ngomba ebandaka,
mabele esili kokanga bikangelo na yango
sima na ngai mpo na libela.
Kasi Yo Yawe, Nzambe na ngai,
obimisi ngai ya bomoi wuta na libulu ya mozindo.