Publicidade

Agradecimento

Por Bíblia Online

O agradecimento é a linguagem natural do cristão. Em tudo dai graças! A gratidão a Deus transforma a perspectiva, fortalece a fé e produz alegria em todos os tempos.

Dar graças sempre

Em tudo dai graças, porque esta é a vontade de Deus em Cristo Jesus para convosco. A gratidão é atitude fundamental.

bozongisaka matondi kati na makambo nyonso, pamba te yango nde mokano ya Nzambe mpo na bino kati na Yesu-Klisto.

bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ;

Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino. Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.

Mitindo ya suka

Bozalaka na molende ya kosambela, bosenzelaka mpe bozongisaka matondi epai ya Nzambe.

Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi.

Louvor e gratidão

Entrai pelas portas com ação de graças. Rendei graças ao Senhor porque Ele é bom e a sua bondade dura para sempre.

Bokota na bikuke na Ye na kozongisa matondi,

bokota na lopango na Ye na kokumisa.

Bosanzola Ye, bopambola Kombo na Ye.

Bolingo ya Yawe ewumelaka seko na seko

Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ;

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Nzembo ya basikolami

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Tokende liboso na Ye

elongo na mabondeli ya kozongisa matondi,

tobetela Ye maboko elongo na banzembo.

Pamba te Yawe azali Nzambe Monene,

azali Mokonzi Monene,

na likolo ya banzambe nyonso.

Ezali malamu kokumisa Yawe

Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.

Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe

mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na

Yo-Oyo-Oleki-Likolo !

Moto oyo abonzaka matondi lokola mbeka,

apesaka ngai lokumu ;

mpe moto oyo asalaka keba na etamboli na ye,

nakotalisa ye lobiko ya Nzambe»

Ozali Nzambe na ngai, nasanzolaka Yo !

Ozali Nzambe na ngai, nanetolaka Yo.

Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,

pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !

Nzambe na biso, tozali sik’oyo kosanzola Yo

mpe kokumisa Kombo na Yo.

Expressões de gratidão

Graças a Deus pelo seu dom inefável! A gratidão se expressa em oração, louvor e generosidade para com os outros.

Tika ete matondi epesamela Nzambe mpo na likabo na Ye, oyo bato bakoki kolimbola te !

Boye bokokoma bazwi ya biloko nyonso mpo ete bokoka kokabaka tango nyonso ; bongo bato epai ya banani tokopesa makabo na bino bakozongisa matondi epai ya Nzambe.

Kasi tika ete Nzambe apesamela matondi, pamba te apesaka biso elonga na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto !

Polo azongisi matondi epai ya Nzambe

Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ;

Polo mpe baklisto ya Rome

Ya liboso, nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu-Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino kati na mokili mobimba.

Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.

Pamba te biloko nyonso ewutaka epai na Ye,

na nzela na Ye mpe mpo na Ye.

Tika ete nkembo ezonga epai na Ye

mpo na libela na libela ! Amen !

‘ Tika ete Yawe apambola yo

mpe abatela yo !

Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye

mpe apesa yo ngolu na Ye !

Tika ete Yawe amona yo

mpe apesa yo kimia ’ 

Bato oyo bakangamaka

na banzambe ya bikeko ezanga tina

babungisaka bolingo oyo Nzambe alingaka bango.

Malendisi

Bandeko, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino. Solo, ezali malamu mpo na biso kosalaka bongo, pamba te kondima na bino ezali se kokola mpe bolingo oyo moko na moko kati na bino azali na yango mpo na moninga na ye ezali mpe kokola.

Matondi mpo na Timote

Nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe oyo nasalelaka na motema peto ndenge bakoko na ngai bazalaki kosala, pamba te tango nyonso, ezala butu to moyi, nabosanaka yo te na mabondeli na ngai.

nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe mpo na bino, nakanisaka bino na mabondeli na ngai

Yango wana, lokola tozali kozwa Bokonzi oyo eninganaka te, tozongisaka matondi mpe tosalelaka Nzambe na lolenge oyo esepelisaka Ye : na botosi mpe na kobanga.

Tata moyangeli Felikisi, na bisika nyonso mpe na tango nyonso, tondimaka yango mpe totondaka yo mingi penza.

Tango Yesu amonaki bango, alobaki :

Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe !

Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.

Bongo Yesu atunaki :

Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ? Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?

Bongo alobaki na moto yango ya Samari :

Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !

Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi :

Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !

Tango Yesu amonaki bango, alobaki :

Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe !

Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.

Bongo Yesu atunaki :

Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ? Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?

Bongo alobaki na moto yango ya Samari :

Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !

Matondi mpe losambo

Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino ;

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-