Publicidade

Ânimo

Por Bíblia Online

O ânimo vem de Deus. Ele nos fortalece, nos encoraja e renova nossas forças. Quando o desânimo chega, as promessas de Deus nos levantam e nos impulsionam a seguir em frente.

Nabatelami malamu epai ya Nzambe

Nzembo ya Davidi.

Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;

nakobanga nani ?

Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;

nakolenga liboso ya nani ?

Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe

oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango,

oyo batonga makasi.

Na mokolo oyo nabelelaki Yo, oyanolaki ngai,

otondisaki ngai na mpiko mpe na makasi.

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

Bato bazongisaki :

Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu ! Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka.

Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.

Pamba te nazali na posa makasi ya komona bino mpo na kopesa bino likabo ya ngolu, likabo ya Molimo, mpo ete bolendisama na kondima na bino to mpo ete tolendisana elongo, na nzela ya kondima moko oyo tozali na yango.

Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.

Yango wana, bolendisanaka mpe bosunganaka bino na bino, ndenge mpe kaka bozali kosala yango.

Bandeko, sango ya kondima na bino elendisi biso makasi, kati na pasi mpe minyoko nyonso oyo tozali komona ;

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-