Aniversario de casamento
O aniversário de casamento celebra a fidelidade de Deus na jornada do casal. Cada ano juntos é testemunho da graça divina que sustenta o amor na vida a dois.
Tala mokolo oyo Yawe asali ;
tika ete tosepela mpe toganga na esengo
mpo na mokolo yango !
Lakisa biso kotanga malamu
mikolo ya bomoi na biso
mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
Bato mingi bazali kotuna :
« Nani akomemela biso bolamu ? »
Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.
Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »
Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe. Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.
Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.
Polo azongisi matondi epai ya Nzambe
Nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe na tina na bino, mpo na ngolu na Ye, oyo epesamela bino kati na Yesu-Klisto ;
Mwasi na ngai ya motema,
mobimba na yo ezali kitoko mingi ;
ata elembo moko te emonani mabe kati na yo.
Mpe tika ete monoko na yo ezala
lokola vino ya kitoko koleka !
Elenge mwasi
Tika ete vino yango esopanela bolingo na ngai na pete,
eleka na bibebu ya bato oyo bazali kolala.
Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te ;
ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te.
Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako
mpo na kosomba bolingo,
solo penza bakotiola ye.
Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.
Matondi mpe losambo
Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino ;