Aniversário de criança
O aniversário de uma criança é momento de celebrar o presente precioso que Deus deu. Cada criança é formada e conhecida por Deus desde antes de nascer.
Ezali Yo nde okelaki mozindo ya bomoto na ngai,
obombaki ngai kati na libumu ya mama na ngai.
Nasanzolaka Yo, pamba te osala ngai kitoko makasi.
Misala na Yo ezali ya kokamwa ;
ngai, nayebi yango malamu.
Na miso na Yo, nzoto na ngai ezalaki ya kobombama te
tango osalaki ngai na esika ebombama,
tango otongaki ngai kati na mozindo ya mabele.
Tango nazalaki nanu na lolenge te,
ozalaki komona ngai ;
mpe omikomelaki kati na buku na Yo
mikolo nyonso oyo obongisaki mpo na bomoi na ngai
liboso ete moko te kati na yango ezala.
Oh Nzambe, tala ndenge ezali pasi mpo na ngai
kososola makanisi na Yo !
Tala ndenge motango na yango ezali ebele !
Tala mokolo oyo Yawe asali ;
tika ete tosepela mpe toganga na esengo
mpo na mokolo yango !
Lakisa biso kotanga malamu
mikolo ya bomoi na biso
mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
Wuta mbotama na ngai, natalelaka Yo ;
Yo nde obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai.
Nakokumisa Yo tango nyonso.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
« Atiaka motema na ye epai na Yawe ;
tika ete Yawe abikisa ye !
Tika ete Yawe akangola ye,
pamba te asepelaka na Ye ! »
Solo, Yawe, obimisaki ngai na libumu ya mama na ngai,
obatelaki ngai na kimia na tolo na ye.
Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye.
Ngai mpe nazalaki mwana malamu
na miso ya tata na ngai,
boye mama na ngai alingaki ngai makasi
lokola mwana oyo abotama kaka ye moko.
Tata na ngai azalaki koteya
mpe koloba na ngai boye :
« Tika ete motema na yo ebatela maloba na ngai,
bomba mibeko na ngai mpe okozala na bomoi,
Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka !
Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.