Aniversário de idoso
O aniversário de um idoso é celebração de uma vida longa e cheia de experiências com Deus. A Bíblia honra os cabelos brancos como coroa de glória e prova da fidelidade divina.
Nzembo ya basikolami
Bosanzola Yawe, pamba te azali malamu,
mpe bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Tala mokolo oyo Yawe asali ;
tika ete tosepela mpe toganga na esengo
mpo na mokolo yango !
Yawe, mokangoli na ngai
Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango akosanaki liboma liboso ya Abimeleki oyo abenganaki ye, mpe akendeki.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;
natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.
Motema na ngai etondi na esengo,
mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Bato mingi bazali kotuna :
« Nani akomemela biso bolamu ? »
Oh Yawe, ngengisela biso elongi na Yo.
Okolakisa ngai nzela ya bomoi ;
okotondisa ngai na esengo kati na bozalisami na Yo,
elongo na bilengi ya suka te na ngambo ya loboko na Yo ya mobali.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Lakisa biso kotanga malamu
mikolo ya bomoi na biso
mpo ete tokoma na mitema ya bwanya.
Suki ya pembe ezali motole ya nkembo ;
bazwaka yango na nzela ya bosembo.
Makasi ezali biju ya bilenge,
mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange.
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.
Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama, mpe nazali na makasi lokola na tango oyo Moyize atindaki ngai ; nazali na nguya ya kobunda bitumba ndenge kaka nazalaki na yango na kala.
‘ Tika ete Yawe apambola yo
mpe abatela yo !
Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye
mpe apesa yo ngolu na Ye !
Tika ete Yawe amona yo
mpe apesa yo kimia ! ’ ›
Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola.