Bem
Fazer o bem é mandamento de Deus e expressão prática do amor cristão. A Bíblia convida a praticar o bem a todos, com alegria, sem se cansar — porque colheremos no tempo próprio.
Batela lolemo na yo mosika na mabe,
mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.
Tia elikya na yo kati na Yawe mpe sala bolamu,
vanda kati na mokili mpe lia na kimia.
Nakozalaka na elikya na likambo oyo :
nakobika bolamu ya Yawe
kati na mokili ya bato ya bomoi.
Yawe, kanisa mawa mpe bolingo na Yo,
pamba te ezali mpo na libela na libela.
Yawe, kokanisa te masumu
mpe botomboki ya bolenge na ngai ;
kanisa ngai kaka kolanda boboto na Yo,
pamba te ozali malamu.
Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka
mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.
Boye, okososola likambo nini
ezali solo, alima, sembo :
nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.
Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto
ezali bolingo ya solo,
mpe mobola azali malamu koleka mokosi.
Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.
Boye, lokola tozali nanu na tango, tosalaka bolamu mpo na bato nyonso, mpe mingi-mingi mpo na libota ya bandimi.
Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango.
Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.
Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te ! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu.
Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.
Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso ezali na litomba te ; « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso, » nzokande nyonso elendisaka te.
Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »
Nzambe azali mpe na makoki ya kotondisa bino na mapamboli ya ndenge na ndenge mpo ete, na tango nyonso mpe kati na makambo nyonso, bozala na nyonso oyo bozali na yango na bosenga mpe botonda lisusu na oyo bokosala na yango misala ya malamu ya lolenge nyonso,
Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi, kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.
amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.
Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu ; na likolo ya bolamu, boyebi ; na likolo ya boyebi, komikanga ; na likolo ya komikanga, mpiko ; na likolo ya mpiko, botosi kati na makambo ya Nzambe ; na likolo ya botosi kati na makambo ya Nzambe, bondeko ya solo ; mpe na likolo ya bondeko ya solo, bolingo.
Nani akosala bino mabe soki bomipesi na kosala bolamu ?
Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Botelema na esika oyo nzela ekutana,
botuna nzela ya kala
mpe esika oyo nzela ya malamu ezali,
bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia
mpo na mitema na bino.
Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! ›
Yawe azali malamu,
azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi
mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako. Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.
Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.