Publicidade

O que é bom

Por Bíblia Online

O que é bom vem de Deus. A Bíblia celebra a bondade divina e nos convida a discernir, praticar e desfrutar tudo o que é bom — porque toda boa dádiva vem do Pai das luzes.

Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba.

Solo, Yawe azali malamu mpe alima ;

atalisaka banzela na Ye

epai ya bato ya masumu.

Kasi mpo na ngai, ezali malamu

kozala pene ya Nzambe.

Nakomisi Nkolo Yawe ebombamelo na ngai,

mpo na kopanza sango ya misala na Yo nyonso.

Ezali malamu kokumisa Yawe

Nzembo ya koyemba na mokolo ya Saba.

Tala ndenge ezali malamu kosanzola Yawe

mpe koyemba mpo na lokumu ya Kombo na

Yo-Oyo-Oleki-Likolo !

Tala ndenge ezali malamu kosakola bolingo na Yo,

na tongo,

mpe boyengebene na Yo, na butu,

Pamba te Yawe azali malamu ;

bolingo na Ye ewumelaka seko na seko,

mpe boyengebene na Ye, libela na libela.

Tango bandeko basangani

Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko

mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !

Pamba te nazali kopesa bino mateya ya malamu ;

bobwaka mateya na ngai te.

Kozongisa eyano ya malamu epesaka moto esengo,

mpe liloba oyo elobami na tango oyo ekoki ezalaka kitoko.

Mwana na ngai, lia mafuta ya nzoyi,

pamba te ezalaka kitoko !

Mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi ekozala

elengi na lolemo na yo.

Yeba lisusu ete bwanya ezali elengi

mpo na molimo na yo ;

soki ozwi yango, yeba ete lobi na yo ekozala malamu,

mpe elikya na yo ekozala ya pamba te.

Bwanya ezali lokola libula,

ezalaka malamu mpe epesaka litomba

na bato oyo bamonaka moyi.

Yawe azali malamu

mpo na bato oyo batielaka Ye elikya,

mpo na bato oyo balukaka Ye !

Ezali malamu kozela na kimia

lobiko kowuta na Yawe !

Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu.

Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo :

Tambola na bosembo,

linga boboto mpe tambola

elongo na Nzambe na yo na komikitisa.

Boye, Mobeko ezali bule, mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu.

Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.

Yango wana, tika ete bolamu na bino etiolama te.

Malako na tina na losambo

Boye liboso na nyonso, nazali kolendisa ete bosengaka na Nzambe, bosambelaka Ye, bobondelaka Ye mpo na bato mosusu mpe bozongiselaka Ye matondi mpo na bato nyonso, mpo na bakonzi mpe mpo na bakambi nyonso, mpo ete tokoka kobika bomoi ya boboto, ya kimia, ya botosi kati na makambo ya Nzambe, mpe bomoi ya bosantu. Pamba te yango nde ezali malamu mpe esepelisaka Nzambe Mobikisi na biso,

Solo, nyonso oyo Nzambe akela ezali malamu, eloko moko te ezali ya kobwaka soki kaka tokozongiselaka Ye matondi tango tozwi yango, pamba te ebulisamaka na nzela ya Liloba na Nzambe mpe libondeli.

bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.

Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_12-11-46-