Publicidade

Casa de Deus

Por Bíblia Online

A casa de Deus é lugar de adoração, refúgio e encontro com o Sagrado. A Bíblia exalta o tabernáculo, o templo e a igreja como morada do Altíssimo entre seu povo.

A presença de Deus

Quão amáveis são os teus tabernáculos! Uma coisa pedi ao Senhor: habitar na casa do Senhor todos os dias da minha vida.

Oh Nzambe, Yo oyo ozali nguba na biso, tala !

Tala elongi ya mopakolami na Yo !

Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,

eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :

nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,

mikolo nyonso ya bomoi na ngai,

mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe

mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.

Kilo ya bambeba eleki makasi mpo na ngai ;

kasi Yo, olimbisaka masumu na biso.

Bosambela mpo na kimia ya Yelusalemi

Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.

Nasepelaka tango balobaka na ngai :

« Tokende na Tempelo ya Yawe »

Solo, na mikolo nyonso ya bomoi na ngai,

esengo mpe bolingo na Yo ekobanda kolanda ngai ;

mpe nakovanda kati na Tempelo ya Yawe

kino suka ya bomoi na ngai.

Bato ya sembo bakomona

mpe bakokoma na somo,

bakotiola ye na maloba oyo :

Bandeko na ngai bakomi kozwa ngai lokola moto oyo bayebi te,

nakomi lokola mopaya na miso ya bana ya mama na ngai.

O templo

Minha casa será chamada casa de oração. O zelo da tua casa me consumiu. O verdadeiro templo é o corpo do cristão.

Yesu abengani bateki kati na Ndako ya Nzambe

Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga. Alobaki na bango :

Ekomama : « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi !

Kokoso ya liboso kati na Tempelo

Lokola mokolo oyo Bayuda basepelaka feti ya Pasika ekomaki pene, Yesu akendeki na Yelusalemi. Tango akotaki kati na lopango ya Tempelo, akutaki bato bazali koteka bangombe, bameme mpe bibenga ; amonaki lisusu bato oyo babongolaka mbongo bavandi liboso ya bamesa na bango. Boye, asalaki fimbu ya basinga mpe abenganaki bango nyonso, longwa na lopango ya Tempelo, elongo na bangombe mpe bameme na bango ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo, mpe apanzaki mbongo na bango na mabele. Alobaki na bato oyo bazalaki koteka bibenga : « Bolongola biloko oyo awa ! Ezali Ndako ya Tata na Ngai ! Ebandi ndenge nini bokomisa yango zando »

Bayekoli na Ye babandaki kokanisa makambo oyo ekomama : « Oh Nzambe, bolingo makasi oyo nazali na yango mpo na Ndako na Yo ekozikisa ngai lokola na moto »

Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ?

mpo ete, soki nawumeli mpo na koya, oyeba ndenge nini bato basengeli kotambola kati na Ndako ya Nzambe, oyo ezali Lingomba ya Nzambe na bomoi, likonzi mpe moboko ya bosolo.

Kasi Klisto azali sembo lokola Mwana, Mokonzi ya Ndako ya Nzambe. Mpe biso, tozali Ndako na Ye, soki kaka tozali kobatela makasi kino na suka, kondima mpe lokumu oyo elikya epesaka biso.

Bakoko na biso bazalaki na Ndako ya kapo ya Boyokani kati na esobe, batongaki yango ndenge Nzambe atindaki Moyize, kolanda ndakisa oyo amonaki. Sima na kozwa Ndako ya kapo yango, bakoko na biso na bokambami ya Jozue, bamemaki yango tango babotolaki mikili ya Bapagano, mikili oyo Nzambe abenganaki liboso na bango. Mpe Ndako ya kapo yango etikalaki kuna kino na tango ya Davidi ; oyo azwaki ngolu na miso ya Nzambe mpe asengaki ete atongela Nzambe ya Jakobi ndako. Kasi Salomo nde moto atongelaki ye ndako.

Nzokande, Ye-Oyo-Aleki-Likolo avandaka te kati na bandako oyo bato batonga, ndenge kaka mosakoli aloba :

« Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi,

mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai.

Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai,

elobi Nkolo,

to esika ya bopemi ya ndenge nini penza

bokoki kobongisela Ngai ?

Boni, ezali loboko na Ngai te

nde esalaki biloko wana nyonso »

Etumbu mpe elikya

Tala liloba oyo Yawe alobi :

« Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi,

mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai.

Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ?

Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ?

Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso,

mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso »

elobi Yawe.

« Tala moto oyo Ngai nakotala :

moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami,

mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.

Tango Jakobi alamukaki na pongi, alobaki : « Ya solo penza, Yawe azali na esika oyo mpe ngai nayebaki yango te »

Jakobi abangaki mpe abakisaki : « Oyo esika ya somo boye ! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola»

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-