Pular para o conteúdo
Publicidade

Casamento

Por Bíblia Online

O casamento é aliança sagrada instituída por Deus. Ele une marido e mulher em uma só carne — pacto de amor, fidelidade e companheirismo que reflete o amor de Cristo pela Igreja.

Fundamento divino

Não é bom que o homem esteja só. Deus criou o casamento como aliança de companheirismo, amor e fecundidade.

Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye»

Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango. Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.

Boye, mobali alobaki :

« Tala na mbala oyo,

oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai,

mosuni ya mosuni na ngai.

Bakobenga ye mwasi,

pamba te awuti na mobali»

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te.

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.

Boye, mobali alobaki :

« Tala na mbala oyo,

oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai,

mosuni ya mosuni na ngai.

Bakobenga ye mwasi,

pamba te awuti na mobali»

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.

Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike »

Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye,

akelaki bango na elilingi ya Nzambe ;

akelaki bango mobali mpe mwasi.

Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike»

Kayina mpe Abele

Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe»

Libota mosusu ya Adamu

Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki»

Fidelidade conjugal

O que Deus ajuntou não separe o homem. O casamento deve ser honrado e o leito matrimonial preservado sem impureza.

Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi »

Yesu azongisaki :

Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi» mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ? Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi »

mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ? Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi »

Mateya na tina na libala

Boyokaki lisusu ete baloba : ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.

Mateya na tina na ekobo

Boyokaki ete baloba : ‹ Okosalaka ekobo te Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.

Balobaki na Yesu :

Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala.

Bongo Yesu alobaki na bango :

Moyize akomaki mobeko wana mpo na bino, pamba te mitema na bino ezali mabanga. Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi» Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.

Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.

Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.

Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.

Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.

Amor como Cristo

Maridos, amai vossas mulheres como Cristo amou a igreja. O amor conjugal reflete o evangelho em ação.

Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye,

Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye, mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.

Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye, mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.

Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba, pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye.

Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko.

Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba, pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye.

Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango. Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.

Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango.

Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango. Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.

Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye, mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.

Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba, pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye.

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.

Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba. Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.

Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko.

Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.

Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.

Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.

Submissão e respeito

Mulheres, sujeitem-se aos próprios maridos. Maridos, convivam com as esposas com conhecimento e honra.

Mateya mpo na libota

Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo.

Mibali, bolingaka basi na bino mpe bozalaka na makambo ya makasi te epai na bango.

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka. Tika ete kimia ya Klisto ekonzaka kati na mitema na bino, pamba te bozali biteni ya nzoto moko mpe Nzambe abenga bino mpo ete bozala na kimia yango ; mpe bozongisaka matondi.

Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino. Mpe nyonso oyo bokosala, ezala na maloba to na misala, bosalaka yango na Kombo ya Nkolo Yesu, na kozongisa matondi epai ya Nzambe Tata na nzela ya Yesu-Klisto.

Na likolo ya makambo oyo nyonso, bolataka bolingo oyo ekangisaka nyonso kati na bomoko ya kokoka.

Bomoi ya sika

Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.

Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.

Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.

Pureza no casamento

Não adulterarás. A impureza sexual destrói alianças e famílias. Deus chama à santidade no matrimônio.

Okosalaka ekobo te.

Okolulaka te ndako ya moninga na yo ; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo»

Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.

Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye. Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye.

Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye. Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye. Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.

Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye. Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye. Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.

Na yango, nazali koloba na bato oyo babali nanu te mpe na basi oyo bakufisa mibali, ete ezali malamu mpo na bango kokoba kozala ya kobala te lokola ngai. Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala ; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.

Epai ya bato oyo babala, nazali kopesa mitindo, ngai te kasi Nkolo : Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye ; kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye ; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.

Pamba te, mobali oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mwasi na ye, mpe mwasi oyo azali mondimi te abulisami na nzela ya mobali na ye. Soki ezalaki bongo te, bana na bino balingaki kozala mbindo, nzokande bazali bule.

Nalingi ete bomitungisaka te. Mobali oyo azali ya kobala te atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo, alukaka ndenge nini kosepelisa Nkolo. Mobali oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mwasi na ye, mpe motema na ye ezali ya kokabwana. Ndenge moko mpe, mwasi oyo azangi mobali, lokola moseka, atiaka makanisi na ye kati na makambo ya Nkolo mpo ete azala bule kati na nzoto mpe kati na molimo. Kasi mwasi oyo abala atiaka makanisi na ye kati na makambo ya mokili, alukaka ndenge nini kosepelisa mobali na ye.

Mwasi ya libala azalaka ya kokangama na mobali na ye na tango nyonso oyo mobali yango azali na bomoi. Soki mobali na ye akufi, mwasi akomi nsomi mpo na kobalana na mobali nyonso oyo ye alingi, kasi mobali yango asengeli kozala Moklisto.

Na tina na libala

Sik’oyo, nazali kopesa biyano na tina na makambo oyo bokomelaki ngai.

Eleki malamu mpo na mobali ete abala mwasi te. Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.

Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.

Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ? Bosikolamaki na motuya makasi penza. Boye, bopesa Nzambe nkembo kati na banzoto na bino.

« bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei» nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto. Solo, lokola Nzambe asekwisaki Nkolo kati na bakufi, akosekwisa mpe biso, na nguya na Ye.

Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, miyibi, bato ya lokoso ya mbongo, balangwi masanga, bato oyo bakoselaka baninga makambo mpo na kobebisa lokumu na bango, ba-oyo babotolaka biloko ya bato, bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.

Bolingo ekangaka motema, bolingo etondi na boboto. Bolingo elulaka te, emikumisaka te, emitondisaka na lolendo te, ebebisaka lokumu ya bato mosusu te, elukaka bolamu na yango moko te, esilikaka te, ebosanaka mabe. Bolingo eyokaka mawa liboso ya bozangi bosembo, kasi esepelaka na bosolo.

Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.

Boni, Klisto azali ya kokabwana ? Ezali Polo nde babakaki na ekulusu mpo na bino ? Ezali na kombo ya Polo nde bozwaki libatisi ? Nazongisaka matondi epai ya Nzambe ete nabatisa moto ata moko te kati na bino, longola kaka Krispisi mpe Gayusi, mpo ete moko te aloba ete bobatisamaki na kombo na ngai. Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu. Pamba te Klisto atindaki ngai te kobatisa bato, kasi atindaki ngai kosakola Sango Malamu. Mpo na yango, nasengeli te kosalela bwanya mpe elobeli malamu ya bomoto, noki te ekulusu ya Klisto ezanga nguya na yango.

Pite kati na Lingomba

Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano : mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye.

Mpe bino, bozali lisusu komikumisa na yango ! Nzokande bosengelaki koyoka mawa mpo na yango, mpe kosala ete balongola kati na bino moto oyo azali kosala likambo ya ndenge wana.

Sabedoria conjugal

Acha esposa, acha o bem. Bebe água da tua própria cisterna. A fidelidade conjugal é fonte de bênção permanente.

Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo,

azwi ngolu kowuta epai na Yawe.

Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo,

azwi ngolu kowuta epai na Yawe.

Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo,

azwi ngolu kowuta epai na Yawe.

Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo

lokola libula kowuta epai ya batata,

kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.

Tika ete etima na yo epambolama,

mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,

oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,

lokola mboloko ya mafuta.

Tika ete tango nyonso,

mabele na ye etondisaka yo na esengo,

mpe bolingo na ye elangwisaka yo !

Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka

mafuta ya nzoyi,

mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;

kasi na suka na nyonso,

azali bololo lokola masanga ya bololo,

songe lokola mopanga ya minu mibale.

Makolo na ye ekokita kino na kufa,

ekokende kino na mokili ya bakufi.

Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi,

alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.

Sik’oyo mwana na ngai, yoka ngai,

kopesa maloba na ngai mokongo te ;

longola nzela na yo pembeni na ye

mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,

noki te akoya kokaba lokumu na yo

epai ya bato mosusu,

mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;

Pamba te bibebu ya mwasi ya ndumba ebimisaka

mafuta ya nzoyi,

mpe lolemo na ye ezali elengi lokola mafuta ;

kasi na suka na nyonso,

azali bololo lokola masanga ya bololo,

songe lokola mopanga ya minu mibale.

Makolo na ye ekokita kino na kufa,

ekokende kino na mokili ya bakufi.

Amitungisaka te mpo na nzela ya bomoi,

alandaka nzela oyo ayebi te esika nini ekosuka.

longola nzela na yo pembeni na ye

mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,

noki te akoya kokaba lokumu na yo

epai ya bato mosusu,

mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;

noki te bapaya bakotonda na biloko oyo yo omoneli pasi,

mpe mbuma ya mosala na yo ekokende

na ndako ya mopaya ;

noki te okokoma kolelalela na suka

tango nzoto na yo ekolemba mpe makasi na yo ekosila,

mpe oloba : « Mpo na nini nayinaki mateya,

mpe motema na ngai eboyaki koyoka toli ?

Mpo na nini nayokaki te mongongo ya balakisi na ngai

mpe napesaki litoyi te epai ya bato

oyo bazalaki koteya ngai ?

Etikalaki kaka moke ete nakweya na mabe ya mozindo,

kati na Lingomba ya bato ya Nzambe»

oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,

lokola mboloko ya mafuta.

Tika ete tango nyonso,

mabele na ye etondisaka yo na esengo,

mpe bolingo na ye elangwisaka yo !

Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini kokufela

kolinga mwasi ya ndumba ?

Mpo na nini kosepela kosakana

na mabele ya mwasi mosusu ?

Boye, moto nyonso oyo akosangisa nzoto

na mwasi ya ndeko na ye

akozanga te kozwa etumbu.

Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga

azali lokola moto oyo azangi mayele ;

kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;

Mobali oyo asalaka ekobo na mwasi ya moninga

azali lokola moto oyo azangi mayele ;

kosala ekobo ya boye ezali nde komiboma ;

akobuka lokola mbuma : minyoko mpe kosambwa ;

bongo soni na ye ekosila te.

Pamba te zuwa epelisaka kanda makasi kati na mobali,

mpe akozala na mawa te na mokolo

oyo akozongisa mabe na mabe ;

akotikala kondima ata lifuti moko te

mpo ete akoka kolimbisa,

mpe akoboya yango ata soki babakisi bakado.

Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye,

kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono

oyo ezali kolia mikuwa.

Motema ya moto esalaka mabongisi,

kasi ezali Yawe nde asalaka ete ekokisama to te.

Kovanda na songe ya ndako ezali malamu

koleka kovanda elongo na mwasi oyo aswanaka-swanaka.

Masese mpo na mwasi ya lokumu

Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?

Azali na motuya koleka babiju ya talo.

Bíblia e casamento

Deus abomina o divórcio. A aliança matrimonial é reflexo da aliança de Deus com seu povo — sagrada e eterna.

Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !

Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nayinaka likambo ya koboma libala ; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto» elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo.

Kokabwana na mabe

Bosanganaka te na bato oyo bazangi kondima. Pamba te boyokani nini ezali kati na bosembo mpe mabe ? Boni, pole ekoki solo kosangana na molili ?

Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso : bokimaka pite ; moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu, asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,

Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.

mpo na bato na pite, mpo na mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, mpo na bato oyo batekaka baninga na bango bato na bowumbu, mpo na bakosi, mpo na bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, mpe mpo na bato oyo basalaka makambo oyo etambolaka nzela moko te na mateya ya solo,

Boye, mokambi ya Lingomba asengeli kozala : moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moto oyo alekisaka ndelo te na ezaleli na ye, moto oyo ayebi komikanga, moto ya lokumu, moto oyo ayambaka malamu bapaya kati na ndako na ye, moto oyo azali na makoki ya koteya,

Diakona asengeli kozala mobali ya mwasi moko mpe asengeli kokamba malamu bana na ye mpe ndako na ye.

Mokambi ya Lingomba asengeli kozala moto azanga pamela, mobali ya mwasi moko, moboti ya malamu ; mpe bana na ye basengeli kozala bandimi, bana ya mobulu te mpe ya kilikili te.

Makambo oyo bosengeli te kosala na bato

Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.

Mibeko na tina na koboma libala mpe kobala lisusu

Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango ; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye.

Mibeko na tina na libala

Soki mobali abali mwasi mpe, sima na kosangisa na ye nzoto, asepeli na ye lisusu te, alobi ete ezaleli ya mwasi yango ezali mabe, bongo apanzi ye sango ya mabe na koloba : « Nabalaki mwasi oyo, kasi tango nasangisi na ye nzoto, namoni ete ayebaki nzoto ya mibali» wana tata mpe mama ya mwana mwasi, basengeli kolakisa epai na bampaka, na bikuke ya engumba, bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na bango ya mwasi ayebaki nzoto nanu ya mibali te. Tata ya mwana mwasi akoloba na bampaka : « Nabalisaki mwana na ngai ya mwasi na mobali oyo, kasi asepeli na ye lisusu te ; amoni ete ezaleli ya mwana na ngai ya mwasi ezali malamu te, yango wana alobi : ‹ Mwana mwasi oyo ayebaki nzoto ya mibaliKasi tala bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na ngai ya mwasi ayebaki nanu nzoto ya mibali te» Boye baboti ya mwana mwasi bakofungola elamba liboso ya bampaka ya engumba,

Okosangisa nzoto te na mwasi mosusu ya tata na yo, soki te okosambwisa tata na yo.

Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye.

Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.

Soki mobali asangisi nzoto na moninga na ye mobali ndenge basangisaka nzoto na mwasi, bango mibale basali likambo moko ya mbindo ; boye esengeli koboma bango mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko.

Banganga-Nzambe basengeli te kobala basi oyo basalaka kindumba to ba-oyo babebisa lokumu na bango na nzela ya mibali mosusu to ba-oyo babengana bango na libala. Pamba te, Banganga-Nzambe bazali basantu oyo babulisami mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango.

Mokonzi ya Banganga-Nzambe asengeli kobala mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba ; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te.

Exemplos bíblicos

O Cântico dos Cânticos celebra o amor conjugal. A Bíblia honra o casamento em toda a sua beleza e profundidade.

Tia ngai lokola kashe na motema na yo,

lokola kashe na loboko na yo ;

pamba te bolingo ezali makasi lokola kufa,

zuwa ezali makasi lokola mokili ya bakufi.

Moto ya bolingo epelaka makasi

lokola kake kowuta epai na Yawe.

Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te ;

ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te.

Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako

mpo na kosomba bolingo,

solo penza bakotiola ye.

Mayi minene ekoki koboma moto ya bolingo te ;

ezala mayi ya bibale, ekoki komela yango te.

Soki moto apesi biloko na ye nyonso ya ndako

mpo na kosomba bolingo,

solo penza bakotiola ye.

Mwasi na ngai ya motema,

mobimba na yo ezali kitoko mingi ;

ata elembo moko te emonani mabe kati na yo.

Mabele na yo nyonso mibale ezali

lokola bana mapasa mibale ya mboloko,

oyo ezali kolia kati na bafololo oyo babengaka lisi.

Obetisi ngai motema makasi,

Oh ndeko na ngai ya mwasi, mwasi na ngai ya motema ;

obetisi ngai motema na komona etaleli ya miso na yo,

mpe na komona moko ya sheneti ya kingo na yo.

Tika ete loboko na ye ya mwasi ezala na se ya moto na ngai,

mpe loboko na ye ya mobali ekanga ngai nzoto !

Kosanzola bolingo

Elenge mwasi

Tika ete bibebu na yo epesa ngai beze,

pamba te bolingo na yo eleki vino na elengi.

Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi ; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.

Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi ; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.

Bato mibale bazali malamu koleka moto moko,

pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.

Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ;

kasi mawa na moto oyo akweyi

mpe azangi moto oyo akosunga ye !

Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko,

bayokaka moto ;

kasi moto oyo azali ye moko,

ndenge nini akoki koyoka moto ?

Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ;

kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna.

Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.

Juízo e restauração

O Senhor é testemunha do pacto conjugal. Casamentos quebrados podem ser restaurados pelo poder e graça de Deus.

Kozonga epai na Yawe

« Bozonga epai na Ngai, bino batomboki» elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona.

Ndimbola ya libala ya mosakoli Oze

Tango Yawe abandaki koloba na nzela ya mosakoli Oze, Yawe ayebisaki ye :

Kende, linga mwasi oyo asalaka kindumba mpe bota na ye bana makangu, pamba te mokili emikotisi na kindumba mpe epesi Yawe mokongo.

Bongo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele bakozonga lisusu kozala ekolo moko, bakopona mokonzi moko kaka mpe bakobima na mokili ya bowumbu, pamba te mokolo ya Jizireyeli ekozala mokolo monene.

Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola osakanelaki bomengo na yo mpe otandaki bolumbu na yo kati na kindumba na bamakangu na yo mpe na banzambe na yo nyonso ya bikeko, makambo na yo nyonso ya mbindo ; mpe lokola obonzelaki banzambe wana ya bikeko makila ya bana na yo ya mibali, nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina ; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso.

Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami. Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ?

Agari mpe Isimaeli

Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari» Sarayi alobaki na Abrami :

Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye.

Abrami ayokaki maloba ya Sarayi. Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye.

Bongo moko kati na bango alobaki :

Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali.

Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami. Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota. Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange »

Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te. Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye.

Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba ; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo» Yawe alingaki ye

Nzokande, Abiya alendisaki bokonzi na ye. Abalaki basi zomi na minei mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mibale mpe bana basi zomi na motoba.

Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa ; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo. Bakosalela yango mpe soki mobali asali zuwa mpe akanisi penza ete mwasi na ye abimi na mobali mosusu : mobali akomema mwasi mpe akotelemisa ye liboso ya Yawe ; bongo Nganga-Nzambe akosalela mobeko oyo na mobimba na yango epai ya mwasi.

Nkembo oyo ekoya na Yelusalemi

Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo,

yo oyo obotaka te !

Yemba nzembo mpe ganga na esengo,

yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te !

Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele

koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe.

Nakosepela makasi kati na Yawe,

molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai,

pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko

mpe azipi ngai na elamba ya bosembo,

ndenge mobandami ya mobali alataka

motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe

to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo.

Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri ; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye ;

« Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende komivandisa te na esika ya lokumu, pamba te, kati na bato oyo babengami na feti yango, ekoki kozala na moto oyo aleki yo na lokumu.

Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.

bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.

Yesu atombolaki moto mpe alobaki na ye :

Mwasi, bato oyo bayei kofunda yo bazali wapi ? Boni, ata moko te akateli yo etumbu ?

Mwasi azongisaki :

Nkolo, moko te !

Bongo Yesu alobaki na ye :

Ngai mpe nakateli yo etumbu te. Kende ; kasi, kobanda lelo, kosala lisusu masumu te.]

Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.

Moteyi, Moyize alobaki : « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi»

Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.

Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.

Tala misala ya bomoto : kindumba, misala ya bosoto, pite, kosambela bikeko, kindoki, koyinana, koswana, zuwa, kanda, bombanda, bokabwani, koboyana, likunya, milangwa, lokoso ya kolia, mpe makambo mosusu ya lolenge oyo. Nazali komiyebisela bino, ndenge nasalaki liboso : bato oyo basalaka makambo ya lolenge oyo bakokota te na Bokonzi ya Nzambe.

Kati na ndako na yo,

mwasi na yo azali lokola nzete ya vino

oyo ebotaka bambuma ebele ;

bana na yo bazali lokola bankona ya nzete ya olive

zingazinga ya mesa na yo.

Ndakisa : Mobeko ekangisaka mwasi ya libala na mobali na ye, wana mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi akangolami na mobeko oyo ezalaki kokangisa ye na mobali. Boye soki, wana mobali na ye azali nanu na bomoi, akomi mwasi ya mobali mosusu, bakoloba ete asali ekobo. Kasi soki mobali na ye akufi, akangolami libela na mobeko yango mpe akoki kokoma mwasi ya mobali mosusu ; boye bakoloba te ete asali ekobo.

Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.

Batikaki mpe te koboma bato, misala na bango ya maji, kindumba na bango mpe moyibi na bango.

pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ;

apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene

oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye,

mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye»

Seja o primeiro