Pular para o conteúdo
Publicidade

Compaixão

Por Bíblia Online

A compaixão é o coração de Deus em ação. Ele é compassivo e misericordioso, tardio em irar-se e grande em amor. Somos chamados a refletir essa compaixão no mundo.

Ndenge tata alingaka makasi bana na ye,

ndenge wana mpe Yawe alingaka makasi

bato oyo batosaka Ye ;

Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe

na mawa mpe na ngolu,

osilikaka noki te,

otonda na bolingo mpe na boyengebene.

Natalaki Yo kati na Esika ya bule

mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.

Bolamu ya Yawe esili te,

mawa na Ye ekomi nanu na suka te ;

ekomaka ya sika tongo nyonso.

Solo, boyengebene na Yo ezali monene !

Boni, mama akoki solo kobosana

bebe na ye oyo azali komelisa mabele,

to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ?

Ata soki akoki kobosana,

ngai nakoki kobosana yo te !

Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ;

bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.

Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu,

atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa.

Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo :

Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !

Nzambe nini akokani na Yo,

Yo oyo olimbisaka masumu ya bato

mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ?

Okangelaka bato kanda mpo na libela te,

kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.

« Nakolendisa libota ya Yuda

mpe nakobikisa libota ya Jozefi,

nakozongisa bango lisusu na mokili na bango,

pamba te nakoyokela bango mawa ;

bakozala lokola bato oyo nasundolaki te,

pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango,

mpe nakoyanola bango.

Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu. Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe»

Yango wana, lokola bozali baponami ya Nzambe, basantu mpe balingami na Ye, boyokelaka mingi bato mawa, bozalaka na bolingo, na boboto, na komikitisa mpe na motema molayi.

Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.

Kosala bolamu

Mpo na kosukisa, bozalaka, bino nyonso, na makanisi moko, boyokelanaka mawa, bolinganaka lokola bandeko, bozalaka bato malamu mpe bato ya komikitisa.

Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ?

Matondi epai ya Nzambe

Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso : abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.

Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.

Bosepelaka elongo na bato oyo bazali kosepela, mpe bolelaka elongo na bato oyo bazali kolela.

Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.

Seja o primeiro