Publicidade

Compreensão

Por Bíblia Online

A verdadeira compreensão vem de Deus. Os caminhos do Senhor são mais altos que os nossos. Mas Ele nos convida a buscar entendimento — e promete iluminar quem o busca de coração.

A sabedoria de Deus

Os meus pensamentos não são os vossos pensamentos. A incompreensibilidade de Deus nos leva à humildade e adoração.

« Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele,

ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali

likolo koleka banzela na bino,

mpe makanisi na Ngai ezali likolo

koleka makanisi na bino.

Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye,

ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele !

Boni, potopoto ekoki solo koloba

na moto oyo asali yango :

‹ Ozali kosala nini 

Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba :

‹ Azali na maboko te 

Oyebi te ? Nanu oyoka te ?

Yawe azali Nzambe ya libela na libela,

azali Mokeli ya basuka ya mabele ;

alembaka te mpe apemaka te,

mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.

Yawe azali monene, abongi na lokumu ;

moko te akoki komeka mozindo ya monene na Ye.

Liboso ete bangomba ezala,

liboso ete okela mabele mpe mokili,

libela na libela, ozali Nzambe.

Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali

lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka,

lokola ngonga moko ya butu.

Lokumu epai ya Nzambe

Oh, tala ndenge nini bomengo, bwanya mpe boyebi ya Nzambe

ezali na mozindo mingi !

Moto moko te akoki koyeba makanisi na Ye

mpe kososola nzela na Ye !

Buscar entendimento

Clama a mim e responder-te-ei. A sabedoria é a coisa principal — busque o entendimento com todo o coração.

‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te

Tala ebandeli ya bwanya : Zwa bwanya,

pesa biloko nyonso oyo ozali na yango

mpo ete ozwa mayele.

Moto oyo asilikaka noki te azalaka mayele,

kasi moto oyo akangaka motema te abimisaka

bozoba na ye.

Motema ya moto ezalaka na makanisi ebele,

kasi ezali mokano ya Yawe nde ekokisamaka.

Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye,

kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.

mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu.

kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso.

Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !

Iluminação divina

A entrada da tua Palavra dá luz e entendimento. Deus revela verdades ocultas e transforma nossa visão da realidade.

Emoniseli ya liloba na Yo engengisaka,

epesaka bazoba mayele.

Olobaki : « Nakopesa yo malako

mpe nakolakisa yo nzela ya kolanda ;

nakopesa yo toli mpe nakosenzela yo.

Ndenge oyebi te nzela ya mopepe

to ndenge nini moto asalemaka kati na libumu ya mama na ye,

ndenge wana mpe okokoka te kososola misala ya Nzambe

oyo azali Mokeli ya nyonso.

Yesu azongiselaki ye :

Nazali koloba na yo penza ya solo : moto moko te akoki komona Bokonzi ya Nzambe soki abotami te mbotama ya sika.

Wana Yesu atalaki bango, alobaki :

Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !

Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango :

Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.

Bokeseni ezali lisusu te kati na Bayuda mpe Bagreki, kati na bawumbu mpe bansomi, kati na mibali mpe basi ; pamba te bino nyonso bozali se moto moko kati na Yesu-Klisto. Mpe soki bozali ya Klisto, bozali mpe bokitani ya Abrayami, bakitani ya libula kolanda elaka oyo Nzambe apesaki na Abrayami.

kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu. Boboyaka mabe ya lolenge nyonso.

Pamba te atako ezali penza ya solo ete tozali bato, mpe tozali kobika bomoi na biso kati na nzoto, kasi tobundaka te kolanda nzoto.

Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.

Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba : « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe» Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe.

Seja o primeiro
Publicidade
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-06-28_14-13-17-