Pular para o conteúdo
Publicidade

Consequências dos nossos atos

Por Bíblia Online

Toda ação tem consequências. A Bíblia ensina que colhemos o que semeamos — para o bem e para o mal. Deus pesará cada palavra e ato no dia do juízo.

Colher o que semear

Cada um prestará contas de si mesmo a Deus. O Senhor julgará as obras e os segredos dos homens com justiça perfeita.

Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.

Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye : bomoi ya seko epai ya moto oyo, na nzela ya molende na ye ya kosala malamu, alukaka nkembo, lokumu mpe makambo oyo ebebaka te ; kasi kanda mpe kanda makasi epai ya moto oyo, na nzela ya botomboki na ye, aboyaka solo mpe asepelaka na mabe. Minyoko mpe mitungisi ezali kozela moto nyonso oyo asalaka mabe : liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki. Kasi nkembo, lokumu mpe kimia ezali kozela moto nyonso oyo asalaka bolamu : liboso, Moyuda, mpe sima, Mogreki ; pamba te Nzambe aponaka bilongi te.

Likabo ya Nzambe ezali na motuya makasi koleka mabe ya lisumu ya moto moko : likolo ya lisumu moko, kosambisama eyei mpe ememi etumbu ; kasi likolo ya masumu ebele, likabo ya ngolu eyei mpe elongoli etumbu. Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko !

Kosambisa te na esika ya Nkolo

Bosambisaka te mpo ete, bino mpe, basambisa bino te. Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu.

Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki.

Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto. Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.

Responsabilidade pessoal

Quem é sábio prevê o perigo e se esconde. A Palavra examina os pensamentos e intenções do coração.

Moto ya mayele amonaka likama na mosika mpe amibombaka,

kasi moto oyo azangi mayele akoleka wana mpe akokutana na pasi.

Soki ozali moto ya bwanya, bwanya na yo ezali

mpo na litomba na yo moko ;

kasi soki ozali motioli, yo moko kaka nde okomona pasi.

Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu :

« Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe»

mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.

Ndakisa ya masumu oyo elimbisamaka

« Soki moto ayoki mbela ya elakeli mabe na tina na likambo oyo amonaki mpe ayebi, bongo aboyi kotatola yango, asali masumu mpe amemi ngambo.

Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo ; mpe akomema mokumba ya mabe na ye.

Okoyina ndeko na yo te na motema na yo ; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye.

Consequências inevitáveis

A terra deu seu fruto conforme as obras dos que nela habitam. Ninguém escapa do juízo — Deus pesa cada ação.

Mokili ekobebisama likolo ya bato wana,

likolo ya bizaleli na bango ya mabe.

Bokozwa etumbu mpo na kindumba na bino mpe bokomema mikumba ya masumu na bino ya kosambela banzambe ya bikeko ; boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe»

Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.

Mpo na nini moto mabe afinga Nzambe ?

Mpo na nini amilobela :

« Nzambe akopesa ngai etumbu te »

Pamba te, Yo Nzambe, omoni pasi ya banyokolami ;

otalaka pasi na bango

mpe ozwaka yango kati na loboko na Yo.

Banyokolami bamipesaka epai na Yo

oyo osungaka bana bitike.

Seja o primeiro