Pular para o conteúdo
Publicidade

Consolo

Por Bíblia Online

O consolo de Deus é bálsamo para a alma ferida. Ele nos conforta em todas as tribulações para que possamos consolar outros com o mesmo consolo divino.

Deus consola

Ainda que eu ande pelo vale da sombra da morte, não temerei mal algum. O Senhor consola, guia e está sempre presente.

Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku

oyo etondi na molili ya kufa,

nakobanga mabe ata moko te,

pamba te ozali elongo na ngai,

nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,

mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.

Nabatelami malamu epai ya Nzambe

Nzembo ya Davidi.

Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;

nakobanga nani ?

Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;

nakolenga liboso ya nani ?

Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ;

batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.

Tika ete bolingo na Yo ebondisa ngai,

kolanda elaka na Yo epai ya mosali na Yo !

Yawe azali malamu

mpo na bato oyo batielaka Ye elikya,

mpo na bato oyo balukaka Ye !

Confiança na aflição

Eu sei que o meu Redentor vive. Deus é força e escudo — mesmo na tribulação, Ele nos sustenta e consola.

Ngai, nayebi na ngai malamu

ete Mosikoli na ngai azali na bomoi,

mpe, awa na mokili, akotelema ya suka

mpo na kokata likambo na ngai.

Sima na kobebisama ya poso ya nzoto na ngai,

ngai, na nzoto na ngai, nakomona Nzambe.

Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ;

nakotia elikya na ngai epai na Ye

mpe nakobanga lisusu te.

Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;

azali lobiko na ngai»

Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko»

Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende»

Boye tokoki koloba na elikya nyonso :

« Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ;

bato bakoki kosala ngai nini »

Esengo na bato oyo bazali kolela,

pamba te bakobondisama !

Kasi mpo na ngai, nakotia elikya na ngai epai na Yawe,

nakotalela Nzambe, Mobikisi na ngai ;

Nzambe na ngai akoyoka ngai.

Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino.

Seja o primeiro

Este artigo te tocou? Faça uma oração!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.