Coração puro
Bem-aventurados os puros de coração, porque verão a Deus. A pureza de coração é alvo, privilégio e busca constante do cristão que deseja contemplar a face do Senhor.
Coração puro
Bem-aventurados os puros de coração. A pureza interior precede toda transformação externa e abre os olhos para ver a Deus.
Esengo na bato oyo bazali na mitema peto,
pamba te bakomona Nzambe !
Nani akokoka komata ngomba ya Yawe ?
Nani akokoka kotelema kati na Esika na Ye ya bule ?
Ezali moto oyo azali maboko pembe mpe motema peto,
oyo atiaka elikya te na banzambe ya bikeko
mpe alapaka ndayi ya lokuta te.
Yawe akopambola ye ;
mpe Nzambe, Mobikisi na ye, akokomisa ye sembo.
Petola ngai na nzela ya izope,
mpe nakokoma peto ;
sukola ngai, mpe nakokoma pembe
koleka mvula ya pembe.
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ;
mpe mikuwa na ngai oyo obukaki
ekosepela makasi.
Kotala lisusu masumu na ngai te,
mpe longola bambeba na ngai nyonso.
Nzembo ya Azafi.
Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele,
mpo na bato oyo bazali mitema peto.
Purificar-se
Todo o que tem essa esperança em Cristo se purifica. O amor procede de coração puro, boa consciência e fé sincera.
Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.
Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka. Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.
Tina ya mitindo yango ezali bolingo oyo ewuti na motema ya peto, na makanisi ya malamu mpe na kondima ya solo.
Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.
Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka, mpo ete bokoka kososola makambo oyo eleki malamu. Na bongo, bokozala peto mpe bokozanga pamela mpo na mokolo ya Klisto, bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe.
Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe, mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te.
Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.
Nzela nyonso ya moto emonanaka peto na miso na ye,
kasi Yawe nde amekaka mitema.