Coração quebrantado
Deus está perto dos que têm o coração quebrantado. A Bíblia consola os aflitos: o sacrifício que Deus aceita é o espírito quebrantado e um coração contrito — jamais desprezará.
Tango bato ya sembo babelelaka,
Yawe ayokaka mpe akangolaka bango
na pasi na bango nyonso.
Nkolo, fungola bibebu na ngai,
mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.
Abikisaka bato oyo batutami na mitema
mpe akawusaka bapota na bango.
Nzoto na ngai ekoki kobeba,
mpe motema na ngai ekoki kolemba ;
kasi Nzambe azali Libanga
mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo,
Ye oyo akowumela seko na seko
mpe azali bule, alobi :
« Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ;
kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi
mpe oyo molimo na ye ebukani,
mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami
mpe motema oyo ebukani.
Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso,
mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? »
elobi Yawe.
« Tala moto oyo Ngai nakotala :
moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami,
mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.
Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai,
pamba te Yawe apakoli ngai mafuta
mpo na kosakola sango malamu epai ya babola,
kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka,
kosakola bonsomi epai ya bawumbu
mpe kobimisa bakangami na boloko ;
mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu,
kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe,
kobondisa bato oyo bazali kolela,
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga
mitole na esika ya putulu,
mafuta ya esengo na esika ya matanga,
mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami.
Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe,
mpo na komonisa nkembo na Ye.
« Esengo na babola na molimo,
pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !
Esengo na bato oyo bazali kolela,
pamba te bakobondisama !
Esengo na bato na komikitisa,
pamba te bakozwa mokili lokola libula !
Mawa oyo ewutaka na mokano ya Nzambe ememaka moto na kobongola motema, mpe kobongola motema ememaka na lobiko, mpe bayokelaka yango pasi na motema te. Kasi mawa oyo ewutaka na baposa ya mokili ememaka na kufa.
Botala makambo oyo mawa ya malamu na miso ya Nzambe ememaki kati na bino : bolingo, molende mpo na kolimbisana, koboya mabe, kotosa, posa makasi ya komona ngai, komipesa na mosala, molende ya kopamela mabe. Na nyonso, bolakisaki penza ete bosalaki mabe te kati na likambo oyo.
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.