Pular para o conteúdo
Publicidade

Coragem

Por Bíblia Online

A coragem cristã não é ausência de medo — é confiança em Deus maior que todo temor. Sê forte e corajoso! é o chamado repetido do Senhor aos seus filhos.

Sê forte e corajoso

O Senhor é a minha luz e a minha salvação — de quem terei medo? Com coragem enfrentamos o mundo, porque Deus está conosco.

Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende»

Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende»

Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te»

Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te»

Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko»

Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali :

Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.

Coragem em Cristo

Não vos deu Deus espírito de covardia. Sede fortes na fé! O perfeito amor lança fora todo medo.

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

Mitindo ya suka

Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.

Mitindo ya suka

Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.

Kati na bolingo, kobanga ezalaka te ; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo.

na kolenga te liboso ya banguna na bino. Mpo na bango, ezali elembo ya libebi ; kasi mpo na bino, ezali elembo ya lobiko, mpe ewutaka na Nzambe.

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata »

Não temas

Não temas, porque Eu sou contigo. Quando tiver medo, em ti confiarei. Deus é nosso escudo e fortaleza.

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;

komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;

nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;

solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,

loboko oyo elongisaka.

Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo,

nasimbi makasi loboko na yo ya mobali

mpe nazali koloba na yo :

‹ Kobanga te, nakosunga yo

Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo :

nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este

mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ;

Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te !

Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te !

Okobosana soni ya bolenge na yo

mpe okokanisa lisusu te

pasi na yo ya kokufisa mobali ;

Bayini na ngai batungisaka ngai mikolo nyonso ;

bato oyo babundisaka ngai na lolendo bazali ebele.

Mokolo oyo nazalaka na bobangi,

natiaka elikya na ngai kati na Yo.

Nabatelami malamu epai ya Nzambe

Nzembo ya Davidi.

Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;

nakobanga nani ?

Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;

nakolenga liboso ya nani ?

Talela Yawe !

Zala makasi mpe yika mpiko !

Talela Yawe !

Talela Yawe !

Zala makasi mpe yika mpiko !

Talela Yawe !

Bino babulami na Ye nyonso,

bolinga Yawe !

Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye,

kasi apesaka etumbu ya makasi

epai ya bato ya lofundu.

Ata soki nasengeli kokatisa lubwaku

oyo etondi na molili ya kufa,

nakobanga mabe ata moko te,

pamba te ozali elongo na ngai,

nzete na Yo ya mobateli ekambaka ngai,

mpe lingenda na Yo ebatelaka ngai.

Conforto e encorajamento

O Deus de toda consolação nos consola em todas as tribulações. Coragem não falta a quem descansa em Deus.

Matondi epai ya Nzambe

Tika ete Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, apambolama ! Azali Tata oyo ayokelaka bato mawa, mpe Nzambe oyo abondisaka bato kati na makambo nyonso : abondisaka biso kati na pasi ya lolenge nyonso mpo ete biso mpe tokoka kobondisa bato oyo bazali kati na pasi ya lolenge nyonso, na nzela ya kobondisama oyo biso mpe tozwaka kowuta na Ye Nzambe.

Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.

Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ; tonyokwamaka mingi, kasi Nzambe asundolaka biso te ; tokweyisamaka na mabele, kasi tokufaka te.

Solo, tomemaka tango nyonso mpe bisika nyonso kufa ya Yesu kati na nzoto na biso, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso. Pamba te, biso oyo tozali na bomoi, tokutanaka na kufa mpo na Yesu, mpo ete bomoi ya Yesu emonana mpe kati na nzoto na biso, oyo ekufaka.

Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te» Boye tokoki koloba na elikya nyonso :

« Nkolo azali Mosungi na ngai, nakobanga te ;

bato bakoki kosala ngai nini »

Kotatola elikya

Nani akosala bino mabe soki bomipesi na kosala bolamu ? Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te.

Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !

Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga. Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango.

Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai »

Seja o primeiro

Este artigo te tocou? Faça uma oração!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.