Publicidade

Desejos

Por Bíblia Online

Os desejos revelam o que há no coração. A Bíblia nos ensina a purificar nossos desejos, submeter a carne ao espírito e buscar as coisas que são de cima.

Desejos da carne

A carne milita contra o espírito. O cristão é chamado a vigiar, resistir e não satisfazer os desejos da natureza pecaminosa.

Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino : Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.

Molimo mpe nzoto ya masumu

Bandeko na ngai, Nzambe abenga bino mpo ete bozala bansomi. Kasi tika ete bonsomi yango ekoma te mpo na bino libaku malamu ya kotambola kolanda baposa ya nzoto. Nzokande, na nzela ya bolingo, bosunganaka bino na bino.

Kosala bolamu mpo na bato nyonso

Bandeko na ngai, soki bokuti moto azali kosala mabe songolo, bino oyo bozali kotambola kolanda Molimo ya Nzambe bozongisa ye na nzela, na boboto nyonso. Kasi sala keba ete yo mpe omekama te.

Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.

komema biso na komekama te,

kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ;

[pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo

ezali ya Yo seko na seko.] 

Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia.

pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko ; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.

Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso.

Bomoi ya sika

Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.

Purificar os desejos

Guarda o teu coração. Das profundezas do interior do homem saem os desejos — bons ou maus, conforme o coração.

Yobo alobeli bosembo na ye

« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai

ete nalula elenge mwasi te.

Moto akoki solo kotambola na likolo ya makala ya moto,

bongo makolo na ye ezika te ?

Mokolo mobimba,

akufaka na ye kaka na baposa makasi ;

kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.

Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga,

pamba te ezalaka na mapapu

mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.

Pamba te lokoso ya mbongo ezali mosisa ya mabe nyonso. Mpo na lokoso ya mbongo, bato mingi babungisaki kondima na bango mpe bamipesaki minyoko ebele.

Pite

Bolobaka : « Nazali na ndingisa ya kosala nyonso» kasi nyonso ezali na litomba te ; « nazali na ndingisa ya kosala nyonso» kasi nakomitika te na se ya bokonzi ya eloko songolo ;

Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye.

Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.

Desejos santos

Como a corça deseja as correntes de água, minha alma suspira por ti, ó Deus. Os desejos do Espírito produzem vida e paz.

Kozala na posa ya Nzambe

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

Oh Yawe, tango totambolaka na nzela

oyo mibeko na Yo etalisaka,

totalelaka Yo ;

Kombo na Yo mpe kotatola yango,

yango nde posa ya mitema na biso.

Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.

Bozali kolula biloko, kasi bozali kozwa yango te ; bokomi kino koboma bato. Botondi na zuwa, kasi bozali kolonga te kozwa oyo bozali koluka ; bokomi koswana mpe kobunda bitumba. Bozwaka te biloko oyo bozalaka na yango posa, pamba te bosengaka yango epai ya Nzambe te.

Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba : « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe» Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe.

Mobeko mpe lisumu

Boye toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te : « Okolulaka te» nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.

Tika ete moto nyonso apesa libala lokumu, mpe mbeto ya libala ezala peto, pamba te Nzambe akosambisa bato na pite mpe bato na bikobo.

pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-