Deus é amor
Deus é amor — esta é a declaração mais profunda da Bíblia sobre a natureza divina. Tudo que Deus faz nasce do amor. Quem permanece no amor permanece em Deus.
A natureza de Deus
Deus é amor. Quem permanece no amor, permanece em Deus e Deus nele. Ele nos amou primeiro com amor eterno.
Nzambe azali bolingo
Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe. Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo.
Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.
Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe. Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye.
Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
O amor de Deus revelado
Deus prova o seu amor em que Cristo morreu por nós quando ainda éramos pecadores. Seu amor é compassivo e eterno.
Kasi tala ndenge nini Nzambe alakisi biso bolingo na Ye : wana tozalaki nanu bato ya masumu, Klisto akufelaki biso.
Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene, atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu…
Kasi Yo Nkolo, ozali Nzambe
na mawa mpe na ngolu,
osilikaka noki te,
otonda na bolingo mpe na boyengebene.
Bosembo na Yo ezali lokola bangomba ya Nzambe,
mikano na Yo ezali mozindo lokola lubwaku ya molayi.
Yawe, obikisaka bato mpe banyama.
Natalaki Yo kati na Esika ya bule
mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.
Bolingo ya Yawe ewumelaka seko na seko
Bosanzola Yawe, mpo ete azali malamu ;
pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko !
Nzambe nini akokani na Yo,
Yo oyo olimbisaka masumu ya bato
mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ?
Okangelaka bato kanda mpo na libela te,
kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.
Bandeko na ngai, nasukisi mokanda na ngai na maloba oyo : Bosepelaka ! Bolukaka kokoma bato ya kokoka, bolendisanaka bino na bino, bozalaka na likanisi moko, bobikaka bomoi na bino na kimia. Bongo Nzambe ya bolingo mpe ya kimia akozala na bino elongo.