Pular para o conteúdo
Publicidade

Deus nunca falha

Por Bíblia Online

Deus nunca falha. Nenhuma de suas promessas vem ao chão. O que Ele prometeu, Ele cumprirá. A fidelidade de Deus é o fundamento inabalável da nossa fé.

Promessas cumpridas

Nenhuma boa palavra falhou de todas as promessas que Deus fez. Ele é fiel e verdadeiro em tudo o que diz.

Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya.

Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya ; solo, nyonso ekokisamaki.

« Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama.

Nzambe azali moto te mpo ete akosa,

azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye.

Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ?

Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ?

Kasi mikano ya Yawe etikalaka mpo na seko,

mabongisi ya motema na Ye, mpo na bikeke nyonso.

Fidelidade eterna

A Palavra do Senhor permanece para sempre. A tua palavra é muito pura e o teu servo a ama profundamente.

Botombola miso na bino na likolo,

botala na se, na mabele ;

likolo ekolimwa lokola milinga,

mabele ekonuna lokola elamba,

mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi.

Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko,

bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.

Nzokande liloba na Yo ezali penza peto ;

mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.

Ozali Mokonzi seko na seko,

mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.

Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso,

asalaka nyonso na bolingo.

Yawe alendisaka bato nyonso oyo bakweyaka,

atelemisaka bato nyonso oyo balembaka.

Kati na engumba yango,

Yawe azali sembo, asalaka mabe te ;

mokolo na mokolo, alakisaka bosembo na Ye

mpe azangaka te kokokisa yango tongo na tongo.

Nzokande, moto oyo atambolaka na bosembo te

amonaka likambo ya soni te.

Emoniseli oyo ezali kaka kozela

tango na yango oyo ekatama ;

ezali kolobela makambo oyo ekosalema

na tango ya suka ;

solo, ekokosa te.

Ata ewumeli, zela yango kaka ;

solo, ekokokisama, ekowumela te.

Segurança em Deus

Todas as promessas de Deus são sim e amém em Cristo. Fiel é Aquele que prometeu — Ele jamais nos decepcionará.

Pamba te bilaka nyonso ya Nzambe ezalaka « iyo » kati na Klisto ; mpe ezali na nzela na Ye Klisto nde tolobaka « amen » mpo na nkembo ya Nzambe. Nzokande, ezali Nzambe nde alendisaka biso mpe bino kati na Klisto ; mpe lokola abulisaki biso na nzela ya epakolami na Ye, abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.

Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te.

Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo,

Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto ;

mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki

mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe

lokola ndanga ya libula na biso

kino basikolami na Ye bakangolama

mpo na kosanzola nkembo na Ye.

Komekama mpe baposa ya nzoto

Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.

Seja o primeiro