Dia dos pais
O Dia dos Pais celebra o amor e o sacrifício paterno. A Bíblia honra os pais como provedores, protetores e guias espirituais que moldam as próximas gerações.
O pai que educa
Instrui a criança no caminho em que deve andar. O pai justo educa com amor, firmeza e o exemplo de uma vida íntegra.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Moto oyo aboyaka kobeta mwana na ye fimbu
alingaka ye te,
kasi moto oyo alingaka mwana na ye abetaka ye.
Moyengebene atambolaka na bosembo na ye ;
boye sima na ye, bana na ye bakozala bato ya esengo.
Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi,
mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.
Moto oyo atosaka Yawe akomaka na kondima makasi,
mpe bana na ye bakozwa ekimelo.
Honra e alegria
Honra a teu pai e tua mãe. Os filhos são herança do Senhor, e a família que serve a Deus junta é inabalável.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,
ndenge wana mpe bana oyo moto aboti
na bolenge na ye bazali.
Esengo na moto oyo atondisi makonga
kati na ebombelo na ye ya makonga !
Akokufa soni ata moke te
tango akosamba elongo na banguna na ye
na ekuke ya engumba.
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
Mitindo ya suka
Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.
Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.
Mwana alobaki na tata na ye : « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »
Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye. Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango ; tolia mpe tosala feti,