Publicidade

Dinheiro

Por Bíblia Online

O dinheiro é ferramenta que pode ser usada para o bem ou para o mal. A Bíblia nos ensina a administrar recursos com sabedoria, generosidade e temor ao Senhor.

Perspectiva bíblica

Guardai-vos da avareza. A vida não consiste na abundância de bens. O dinheiro é servo, nunca senhor.

Bongo alobaki na bato nyonso :

Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.

pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.

Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo»

Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga,

pamba te ezalaka na mapapu

mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.

Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo,

kotia mayele na yo te kati na yango.

Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele,

ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele ;

bongo litomba nini nkolo na yango akozwa,

soki kaka te komona yango na miso ?

Administrar com sabedoria

Honra ao Senhor com as tuas primícias. O sábio administra seus recursos com prudência e visão de eternidade.

Pesaka Yawe lokumu na nzela ya biloko na yo

mpe ya bambuma ya liboso ya bozwi na yo nyonso.

Lipamboli ya Yawe ekomisaka moto mozwi,

mpe abakisaka pasi te na likolo na yango.

Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe

epesaka litomba te,

kasi bosembo ekangolaka na kufa.

Bomengo oyo ezwami na lombangu

mpe na nzela ya mabe esilaka noki,

kasi bomengo oyo babakisaka na moke-moke

ekomaka ebele.

Bwanya ezali malamu koleka wolo,

mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.

Kokende sango ya malamu ezali malamu

koleka kozala na bomengo mingi ;

lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.

Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu

koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.

Eloko oyo moto alingaka epai ya moninga na ye moto

ezali bolingo ya solo,

mpe mobola azali malamu koleka mokosi.

longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta,

kopesa ngai te bobola to bozwi,

kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai,

Perigos e armadilhas

Quem quer enriquecer cai em tentação. Fuja do amor ao dinheiro e busque contentamento no Senhor.

Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.

Bato ya bomengo

Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.

Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te»

Bomengo ekolongisa ata moke te

na mokolo ya kanda ya Nzambe,

kasi bosembo ekangolaka na kufa.

Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,

oyo batonga makasi ;

akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.

Tudo vem de Deus

De ti vem tudo, e das tuas mãos to damos. Os tributos são devidos — dai a César o que é de César e a Deus o que é de Deus.

Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani,

mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo,

wuta na mokano ya mitema na biso moko ?

Nyonso ewutaka epai na Yo,

mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.

Bopesa oyo ekoki na mokonzi nyonso : mpako epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, motuya ya biloko epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, botosi epai na ye oyo asengeli kotosama, mpe lokumu epai na ye oyo asengeli kozwa yango.

Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesaka tango na bango nyonso mpo na kokamba.

Mwa biloko ya moto ya sembo eleki

bozwi ya bato ebele ya mabe,

pamba te nguya ya bato mabe ekosila,

kasi Yawe alendisaka bato ya sembo.

Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo

lokola nde nazali na bomengo nyonso.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-