Pular para o conteúdo
Publicidade

Domínio próprio

Por Bíblia Online

O domínio próprio é fruto do Espírito e marca de maturidade espiritual. A Bíblia ensina que quem governa o próprio espírito é melhor do que quem conquista uma cidade.

Fruto do Espírito

O fruto do Espírito inclui domínio próprio. A graça de Deus nos ensina a viver de maneira sóbria e justa neste mundo.

Kasi mbuma ya Molimo ezali : bolingo, esengo, kimia, kokanga motema, bondeko, kosala bolamu, kondima, boboto mpe komikanga. Mibeko epekisaka te makambo ya lolenge oyo.

Ngolu, etima ya lobiko

Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso. Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe, wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama : komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

Mpo na yango, bosala makasi mpo na kobakisa na likolo ya kondima na bino, bolamu ; na likolo ya bolamu, boyebi ; na likolo ya boyebi, komikanga ; na likolo ya komikanga, mpiko ; na likolo ya mpiko, botosi kati na makambo ya Nzambe ; na likolo ya botosi kati na makambo ya Nzambe, bondeko ya solo ; mpe na likolo ya bondeko ya solo, bolingo.

Governar a si mesmo

Melhor é o que domina o seu espírito do que o que toma uma cidade. A cidade sem muros é o homem sem domínio próprio.

Moto oyo akangaka motema azali makasi koleka elombe,

mpe moto oyo ayebi komikanga azali makasi

koleka moto oyo abotolaka bingumba.

Moto oyo akokaka te kokonza molimo na ye

azali lokola engumba oyo ebukana mpe ezanga bamir.

Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye,

kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.

Moto oyo alobaka maloba ebele

azangaka te kosala masumu,

kasi moto oyo abatelaka bibebu na ye

azali moto ya bwanya.

Boni, boyebi te ete bato oyo bakimaka mbangu kati na lisano ya kopota mbangu, bango nyonso bapotaka mbangu, kasi moto moko kaka nde azwaka mbano ? Bino mpe bopota mbangu lokola ye, na lolenge ya kozwa mbano. Bato nyonso oyo basalaka masano bamipekisaka makambo ebele ; basalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka ; kasi biso, tosalaka bongo mpo na kozwa motole oyo ebebaka te. Yango wana ngai, nazali kopota mbangu na bozoba te, nazali kobeta makofi bibetabeta te. Kasi nakonzaka nzoto na ngai, nakomisaka yango lokola mowumbu, pamba te nabangaka kozanga mbano sima na ngai koteya bato mosusu.

Kasi soki bakoki te komikanga, tika ete babala ; pamba te eleki malamu kobala, na esika ya kozika na posa ya nzoto.

Komekama oyo ekomelaki bino ekomelaka bato nyonso ; mpe Nzambe azali Moyengebene ; akotika te ete bomekama koleka makasi na bino. Kasi na tango ya komekama, akobongisela bino nzela ya kobima na komekama yango, mpe akopesa bino makasi ya kotelemela yango.

Disciplina e vigilância

Sede sóbrios e vigilantes. O diabo anda em derredor como leão rugidor. A sobriedade nos protege e fortalece.

Bolekisaka ndelo te na bizaleli na bino mpe botambolaka na ekenge, pamba te monguna na bino, Satana, atambolaka zingazinga na bino lokola nkosi oyo ezali konguluma mpe koluka moto ya kolia. Botelemelaka ye mpe boyikaka mpiko kati na kondima, pamba te boyebi ete bandeko na bino, oyo bapalangana kati na mokili bazali mpe komona bapasi lokola bino.

Kosungana kati na bana na Nzambe

Suka ya makambo nyonso ekomi pene ; yango wana, botambola na bwanya mpe na mayele mpo ete bokoka kosambela.

Kobika mpo na Nzambe

Lokola Klisto amonaki pasi kati na nzoto na Ye, bino mpe bosengeli kotambola na makanisi ya ndenge wana ; pamba te Ye oyo amonaki pasi kati na nzoto na Ye asilisaki nguya ya lisumu, mpo ete botambola te kolanda baposa mabe ya nzoto, kasi kolanda mokano ya Nzambe, na mikolo oyo botikali na yango ya kobika awa na mokili. Solo, na kala, bolekisaki tango mingi na kosala makambo oyo Bapagano basalaka : kindumba, baposa mabe ya nzoto, milangwa, lokoso ya kolia mpe ya komela, mpe kosambela bikeko ya nkele. Kasi sik’oyo, Bapagano bazali kokamwa ete bozali kosangana lisusu te elongo na bango kati na bomoi wana ya kindumba makasi ; yango wana bakomi kobebisa lokumu na bino na nzela ya matongi. Kasi bakosamba liboso ya Nzambe oyo akosambisa penza bato ya bomoi mpe bakufi.

moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu, asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,

O senhorio de Cristo

Todo domínio pertence a Cristo. Ele é Senhor dos senhores e Rei dos reis — e nos capacita a viver em santidade.

Bopambola Yawe, bino bikelamu na Ye nyonso,

kati na bisika nyonso ya Bokonzi na Ye.

Eh molimo na ngai, pambola Yawe !

Ozali Mokonzi seko na seko,

mpe bokonzi na Yo ekowumela libela na libela.

Yawe akokisaka bilaka na Ye nyonso,

asalaka nyonso na bolingo.

Kati na bimoniseli na ngai ya butu,

namonaki moto moko lokola Mwana na Moto

koya elongo na mapata ya likolo ;

apusanaki pene ya Mpaka

oyo azala liboso ya tango,

mpe bamemaki ye liboso na Ye.

Bapesaki Ye bokonzi, lokumu mpe nguya ;

bikolo nyonso, mikili mpe nkota bakomaki kosalela Ye.

Bokonzi na Ye ezali ya seko na seko,

ekotikala koleka te mpe ekotikala kobebisama te.

Mokolo moko, tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai, nalotaki ndoto moko oyo ebangisaki ngai makasi ; bililingi mpe bimoniseli moko eyaki na makanisi na ngai mpe etungisaki molimo na ngai. Boye, napesaki mitindo epai ya bato ya bwanya nyonso ya Babiloni ete baya liboso na ngai mpo na kolimbolela ngai ndoto yango.

Bokonzi na ye ekokende mosika penza,

mpe kimia na ye ekozala na suka te.

Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi,

akozala mokonzi ya mokili na ye,

akolendisa mpe akokamba yango

na bosembo mpe na boyengebene,

wuta na tango oyo kino libela na libela.

Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga,

akosala na bolingo makasi na Ye.

Kanda ya Yawe mpo na Isalaele

Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi,

mpe liloba yango ekomeli Isalaele.

Akangolaki biso na bokonzi ya molili

mpe amemaki biso kati na bokonzi

ya Mwana na Ye ya bolingo,

oyo, kati na Ye,

tozwi lisiko mpe bolimbisi ya masumu.

mpe asalelaki yango kati na Klisto tango asekwisaki Ye kati na bakufi mpe avandisaki Ye na ngambo ya loboko na Ye ya mobali kati na Likolo, na likolo ya milimo nyonso, ya bokonzi nyonso, ya nguya nyonso, ya bokasi nyonso, mpe ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, na tango oyo kaka te kasi mpe na tango oyo ekoya.

Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo. Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.

Pamba te toyebi malamu ete Klisto oyo asekwaki kati na bakufi akokufa lisusu te ; kufa ezali lisusu na bokonzi te likolo na Ye.

Bato oyo batambolaka kolanda baposa ya nzoto bakoki kosepelisa Nzambe te.

Nzokande bino, botambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda baposa ya Molimo, mpo ete Molimo ya Nzambe azali kati na bino. Mpe soki moto azangi Molimo ya Klisto azali mpe moto na Ye te.

ndenge bato nyonso bakufaka kati na Adamu, ndenge wana mpe bato nyonso bakozwa bomoi kati na Klisto ; kasi moto na moto na tango na ye : Klisto akosekwa moto ya liboso ; sima, tango akoya, bato oyo bazali ya Klisto bakosekwa. Sima na yango nde suka ekoya, tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Ye oyo azali Nzambe mpe Tata, sima na Ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso. Pamba te Klisto asengeli kokonza kino Nzambe akotia banguna na Ye nyonso na se ya matambe na Ye.

« Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ;

atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo.

Seja o primeiro