Esperar no Senhor
Esperar no Senhor é ato de fé e confiança. A Bíblia promete que os que esperam em Deus renovam as forças, recebem direção e experimentam a fidelidade divina no tempo certo.
Renovar as forças
Os que esperam no Senhor renovam as forças. Sobem como águias, correm e não se cansam, caminham e não se fatigam.
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.
Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu,
atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa.
Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo :
Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye !
Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !
Nakozalaka na elikya na likambo oyo :
nakobika bolamu ya Yawe
kati na mokili ya bato ya bomoi.
Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !
Nabatelami malamu epai ya Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;
nakobanga nani ?
Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;
nakolenga liboso ya nani ?
Tango bato mabe babundisaka ngai
mpo na koluka kosala ngai mabe,
ezali bayini mpe banguna na ngai
nde baninganaka mpe bakweyaka.
Ata limpinga ezingeli ngai,
motema na ngai ekobanga soki moke te ;
ata etumba etelemi mpo na koboma ngai,
atako bongo, nakozala kaka na elikya makasi.
Nalukaka eloko moko kowuta na Yawe,
eloko moko kaka oyo nasengaka makasi :
nalingi kovanda na Tempelo ya Yawe,
mikolo nyonso ya bomoi na ngai,
mpo na kosepelaka na kitoko ya Yawe
mpe kosengaka toli na Ye kati na Tempelo na Ye.
Pamba te, na tango ya pasi,
akobatela ngai kati na evandelo na Ye,
akobomba ngai kati ya Ndako na Ye ya bule
mpe akotelemisa ngai na likolo ya libanga.
Bongo, nakotombola moto na ngai
na likolo ya banguna oyo bazingeli ngai ;
nakobanda kobonza, na se ya lokito ya esengo,
bambeka kati Ndako na Ye ya bule ;
nakobanda koyembela Yawe
mpe kobetela Ye mindule.
Yawe, yoka mongongo na ngai,
soki nabeleli Yo ;
salela ngai ngolu mpe yanola ngai.
Motema na ngai elobi na tina na Yo :
« Tala elongi na Ye ! »
Yawe, nakotala elongi na Yo.
Kopesa ngai mokongo te,
kobengana mosali na Yo te na kanda ;
osungaki ngai.
Kotika ngai te, kosundola ngai te,
Nzambe, Mobikisi na ngai.
Ata tata mpe mama na ngai basundoli ngai,
Yawe akolokota ngai.
Yawe, lakisa ngai nzela na Yo,
tambolisa ngai na nzela ya alima,
pamba te banguna na ngai bazali koluka ngai.
Kotika te ete nakangama na motambo ya bayini na ngai,
pamba te batatoli ya lokuta batelemi
mpo na kokosela ngai makambo,
bazali kobimisa maloba mabe.
Nakozalaka na elikya na likambo oyo :
nakobika bolamu ya Yawe
kati na mokili ya bato ya bomoi.
Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !
Espera paciente
Esperei com paciência no Senhor e Ele se inclinou para mim. Confie nele e descanse — Ele agirá no tempo certo.
Lobiko ya Nzambe epai ya mosali na Ye
Nzembo ya Davidi. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.
Natiaki elikya na ngai kati na Yawe ;
abalukaki epai na ngai mpe ayokaki koganga na ngai.
Abimisaki ngai na libulu ya mozindo, kati na potopoto ;
atelemisaki ngai na likolo ya libanga
mpe alendisaki makolo na ngai.
Atiaka nzembo ya sika kati na monoko na ngai,
nzembo ya masanzoli mpo na Nzambe na biso.
Bato ebele bakomona, bakobanga
mpe bakotiela Yawe motema.
Esengo na moto oyo atiaka elikya kati na Yawe,
kasi atalelaka te bato ya lolendo mpe bakosi.
Yawe, Nzambe na ngai, bikamwa mpe mabongisi
oyo osalaka mpo na biso ezali ebele penza.
Moko te akokani na Yo ;
nalingi kotatola mpe kopanza sango na yango,
kasi motango na yango eleki ebele.
Osepelaki te na bambeka mpe na makabo,
kasi ofungolaki matoyi na ngai ;
osengaki te makabo ya kotumba mpe bambeka
mpo masumu.
Bongo nalobaki : « Ngai oyo, nayei epai na Yo
kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku.
Nzambe na ngai, nasepelaka kosala mokano na Yo,
Mobeko na Yo ezali kati na motema na ngai. »
Nasakolaka bosembo na Yo kati na mayangani,
nakokanga monoko na ngai te ;
Yawe, oyebi yango !
Nabombaka bosembo na Yo te kati na motema na ngai,
natatolaka boyengebene mpe lobiko na Yo kati na mayangani,
nakobomba yango ata moke te.
Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te ;
kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo
ebatelaka ngai tango nyonso.
Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai,
mabunga na ngai ekomi konyokola ngai,
mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango ;
ezali ebele koleka suki ya moto na ngai,
mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
Yawe, nabondeli Yo, kangola ngai ;
Yawe, yaka noki kosunga ngai.
Totielaka Yawe motema ;
azali lisungi mpe nguba na biso.
Solo, mitema na biso esepelaka kati na Ye,
pamba te totiaka elikya na biso
kati na Kombo na Ye ya bule.
Yawe, lokola totiaka elikya na biso kati na Yo,
tika ete bolingo na Yo ezala elongo na biso.
Na motema na ngai mobimba,
nazali na elikya kati na Yawe,
nazali penza na elikya ;
nazali kozela maloba na Ye.
Nazali na elikya kati na Nkolo
koleka kutu ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo,
koleka penza ndenge mokengeli azelaka kotana ya tongo.
Solo, basalaka makita mpo na kokweyisa ye
wuta na esika na ye ya likolo,
basepelaka kotatola lokuta.
Bapambolaka na nzela ya minoko na bango ;
kasi kati na mitema na bango, balakelaka mabe.
Zala na elikya kati na Yawe
mpe batela nzela na Ye ;
akonetola Yo mpo ete ozwa mboka lokola libula na yo,
mpe okomona tango bato mabe bakolimwa.
Confiança e perseverança
Confie no Senhor de todo o coração. Sede pacientes na tribulação — o Senhor é fiel e cumprirá todas as suas promessas.
Ndimela Yawe na motema na yo mobimba,
mpe kotia motema te na mayele na yo.
Yebaka Ye na banzela na yo nyonso,
mpe Ye akokomisa yango alima.
Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya.
mpo ete bokoma bato na nguya kati na makambo nyonso kolanda makasi ya nkembo na Ye, mpo ete boyikela nyonso mpiko mpe bozala na molende mpe esengo kino na suka ;
Mpiko kati na komekama
Bandeko, boyika mpiko kino na mokolo oyo Nkolo akoya. Botala ndenge mosali bilanga azelaka bambuma kitoko ya mabele : akangaka motema wuta tango oyo aloni elanga na ye kino na eleko ya kobuka bambuma. Bino mpe, bokangaka mitema mpe boyikaka mpiko, pamba te koya ya Nkolo ekomi pene.
Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.
Kozala na bolingo
Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto. Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka. Pamba te ekomama :
« Bato nyonso bazalaka lokola matiti,
mpe nkembo na bango nyonso ezalaka
lokola bafololo ya bilanga.
Matiti ekawukaka mpe fololo na yango ekweyaka,
kasi Liloba na Nkolo ewumelaka seko na seko. »
Nzokande, Liloba yango ezali nde Sango Malamu oyo bateyaki bino.
Bato ebele bakanisaka ete Nkolo azali kowumela mpo na kokokisa elaka na Ye ; nzokande azali nde kokanga motema mpo na bino, pamba te alingi ete moko te abunga, kasi alingi ete bato nyonso babongola mitema.
Lisese ya baseka zomi
Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala. Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele. Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te ; ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.
Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki. Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »
Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango. Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »
Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »
Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.
Na sima, baseka mosusu mpe bayaki ; balobaki : « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke ! » Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te. »
Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.