Estudar a Bíblia
Estudar a Bíblia é mergulhar na mente de Deus. A Palavra é lâmpada para os pés, espada do Espírito e alimento para a alma. O cristão que estuda cresce em sabedoria e maturidade.
A importância do estudo
Os bereanos eram mais nobres porque examinavam as Escrituras diariamente. Estudar a Bíblia é mandamento e privilégio.
Nzokande, Bayuda ya Bere bazalaki bato ya boboto koleka bato ya Tesalonika, pamba te bayambaki Liloba na motema mobimba mpe, mokolo na mokolo, bazalaki koyekola na mozindo Makomi mpo na kotala soki makambo oyo Polo azali koteya bango ezali ya solo.
Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.
mpe wuta bomwana na yo, oyebi Makomi ya bule oyo ezali na makoki ya kopesa yo bwanya oyo ememaka na lobiko na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto.
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
Kino tango nakoya, zala na molende ya kotanga Makomi, ya koteya mpe ya kopesa malakisi.
Bokundolaka Makomi na bokebi, mpo ete bokanisaka ete bokozwa bomoi ya seko kati na yango ; nzokande, Makomi yango etatolaka na tina na Ngai,
Meditar e guardar
Não se aparte a lei do Senhor da tua boca. Medita nela de dia e de noite para que cumpras tudo o que nela está escrito.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Nalingaka mibeko na Yo mingi !
Nakanisaka yango mikolo nyonso.
Mibeko na Yo ekomisaka ngai moto ya bwanya
koleka banguna na ngai ;
ezalaka elongo na ngai tango nyonso.
Naleki balakisi na ngai nyonso na mayele,
pamba te nakanisaka malako na Yo.
Ndenge nini elenge akoki kowumela
na nzela ya sembo ?
Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;
batela ngai mpo ete napengwa te
mosika ya mibeko na Yo !
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai
mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
Yawe, tika ete opambolama !
Lakisa ngai mitindo na Yo !
Na monoko na ngai, natangaka
mibeko na Yo nyonso.
Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo
lokola nde nazali na bomengo nyonso.
Nakanisaka malako na Yo
mpe natambolaka na banzela na Yo.
Nasepelaka mingi na malako na Yo
mpe nabosanaka liloba na Yo te.
Nakosanzola Yo na motema ya sembo
wana nakoyekola mibeko ya bosembo na Yo.
Estudo diligente
Esdras preparou o coração para buscar e ensinar a lei. O estudo exige disciplina, constância e coração aberto.
Alongwaki na Babiloni na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe akomaki na Yelusalemi na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, pamba te loboko ya ngolu ya Nzambe na ye ezalaki likolo na ye, mpo ete Esidrasi amipesaki ye moko penza, na motema na ye mobimba, mpo na koyekola mpe kotia na misala mibeko ya Yawe mpe mpo na kolakisa na bana ya Isalaele bikateli mpe mitindo ya mibeko yango.
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso. Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki. Kanga yango na maboko na yo lokola bilembo mpe tia yango na elongi na yo lokola elembo. Koma yango na makonzi ya ndako na yo mpe na bikuke na yo.
Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko. Akozala na buku yango tango nyonso mpe akotanga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye mpo ete ayekola kokumisa Yawe, Nzambe na ye, mpe asalela malamu maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe bikateli na yango ; mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele.
Maloba ya ebandeli
Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :
mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya
mpe kososola maloba ya mayele ;
mpo na kozwa mateya ya bwanya
oyo epesaka bizaleli ya sembo,
ya boyengebene mpe makambo ya alima ;
mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,
mpe boyebi epai ya bilenge.
Tika ete moto ya bwanya ayoka yango,
mpe akobakisa bwanya na ye,
bongo moto ya mayele akoyeba mayele
ya kotambolisa bato ;
mpo na kososola masese mpe sambole,
maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
Elikya na Yawe
Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te,
kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;
pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi,
ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo
mpe ekomemela yo kimia.
Tingama makasi na mateya oyo bapesi yo,
kobwaka yango te, batela yango malamu
mpo ete ezali bomoi na yo.
Mibeko ezali mwinda, mateya ezali pole,
makebisi mpe pamela ezali nzela ya bomoi,
Proteção e crescimento
Quem ignora a Palavra perece. Toda Escritura é útil — crescei na graça e no conhecimento do nosso Senhor.
Bato na Ngai bakobebisama
mpo ete bazangi boyebi.
Lokola bobwaki boyebi,
Ngai mpe nakobwaka bino
mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai.
Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino,
Ngai mpe nakobosana bana na bino.
Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te.
Yesu azongiselaki bango :
— Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.
Nzokande, makambo nyonso oyo ekomama kala ekomamaki mpo na koteya biso, mpo ete na nzela ya kokanga motema mpe malendisi oyo Makomi epesaka, tozala na elikya.
Mitindo ya suka
Balingami na ngai, lokola bosili kozwa boyebi oyo, bosala keba ete bomemama te na mopepe ya mabunga ya bato oyo batosaka Nzambe te, mpo ete bobungisa te kondima na bino ; kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso.
Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !
Mpo na lobiko yango, basakoli oyo baloba na tina na ngolu oyo Nzambe abongisa mpo na bino balukaki penza, na molende, koyeba mabombami na yango. Basalaki nyonso mpo na koluka koyeba tango nini mpe ndenge nini makambo oyo Molimo ya Klisto alobaki ekosalema. Molimo ya Klisto azalaki kati na bango, wana azalaki komiyebisela bango ete Klisto asengelaki komona pasi liboso ete azwa nkembo oyo ezalaki kozela Ye.