Família
A família é a primeira instituição criada por Deus. Ele a projetou para ser escola de amor, fé e formação de caráter. A Bíblia honra a família e nos ensina a cuidar dela.
Eu e minha casa
Eu e minha casa serviremos ao Senhor. A família que serve a Deus juntos permanece unida e fortalecida em todas as circunstâncias.
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. »
Bazongisaki :
— Ndima Nkolo Yesu, mpe okobika, yo mpe libota na yo.
Tika ete Yawe, Nzambe na biso, azala elongo na biso ndenge azalaki elongo na batata na biso ; atika biso te mpe abwaka biso te ;
Criar os filhos
Instrui a criança no caminho em que deve andar. O lar é a primeira escola de fé e obediência.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ;
ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo,
mpe kobwaka te mateya ya mama na yo ;
Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo,
mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
Mwana na ngai, batela mibeko ya tata na yo
mpe kosundola te mateya ya mama na yo.
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo.
Baboti mpe bana
Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu
Honrar e amar
Honra teu pai e tua mãe. A família funciona com perdão, paciência e amor incondicional entre todos os seus membros.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.
okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
Mateya na tina na koboma libala
Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna. Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna :
— Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ?
Yesu azongisaki :
— Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, » mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ? Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »
Kasi Bafarizeo balobaki na Ye :
— Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala ?
Yesu azongiselaki bango :
— Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te. Nazali koloba na bino : Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.
Bayekoli balobaki na Ye :
— Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, wana eleki malamu mpo na mobali ete abala te !
Yesu azongiselaki bango :
— Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango. Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !
Yesu ayambi bana mike
Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango. Yesu alobaki :
— Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.
Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana.
Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe
Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki :
— Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko ?
Yesu azongisaki :
— Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.
Elenge mobali yango atunaki lisusu :
— Mibeko nini ?
Yesu azongisaki :
— Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te, okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.
Elenge mobali alobaki :
— Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ?
Yesu azongisaki :
— Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo ! Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.
Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana :
— Bongo nani penza akoki kobikisama ?
Wana Yesu atalaki bango, alobaki :
— Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu :
— Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! Ekozala boni mpo na biso ?
Yesu alobaki na bango :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele. Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.
Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.
Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto.
Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.
Soki moto alobi ete alingaka Nzambe, kasi azali lisusu koyina ndeko na ye, azali mokosi. Pamba te moto oyo alingaka te ndeko na ye, oyo amonaka akoki kolinga te Nzambe oyo amonaka te.
Cuidar da família
Quem não cuida dos seus negou a fé. A família é responsabilidade sagrada — prover, proteger e abençoar é mandamento divino.
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.
Bokabwani kati na Lingomba ya Kolinto
Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko.
Bana bazali libula kowuta na Yawe,
mpe kobota bana ezali lifuti.
Ndenge makonga ezali kati na maboko ya mobundi bitumba,
ndenge wana mpe bana oyo moto aboti
na bolenge na ye bazali.
Esengo na moto oyo atondisi makonga
kati na ebombelo na ye ya makonga !
Akokufa soni ata moke te
tango akosamba elongo na banguna na ye
na ekuke ya engumba.
Kasi bolingo ya Yawe
mpo na bato oyo batosaka Ye,
mpe bosembo na Ye
mpo na bakitani na bango,
mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye
mpe batosaka mibeko na Ye,
ezali ya libela na libela.
Kasi bolingo ya Yawe
mpo na bato oyo batosaka Ye,
mpe bosembo na Ye
mpo na bakitani na bango,
mpo na bato oyo babatelaka boyokani na Ye
mpe batosaka mibeko na Ye,
ezali ya libela na libela.
Tango bandeko basangani
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe.
Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko
mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Unidade familiar
A coroa dos velhos são os filhos dos filhos. O casamento, os filhos e a comunhão familiar são bênçãos de Deus.
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Bakitani bazali motole ya bakoko,
mpe baboti bazali lokumu ya bana.
Molingami alingaka tango nyonso,
mpe akomaka ndeko na tango ya pasi.
Moto oyo azalaka na balingami ebele amitiaka na pasi,
kasi ezali na molingami moko ya motema,
oyo aleki ata ndeko.
Kosundola te molingami na yo to molingami ya tata na yo,
mpe kokende te na ndako ya ndeko na yo tango ozali na pasi ;
kozala na molingami ya pembeni ezali malamu
koleka kozala na ndeko ya mosika.
Mwana na ngai, soki motema na yo ezali na bwanya,
motema na ngai ekozala na esengo.
Tata ya moto ya sembo akozala na esengo mingi,
mpe moto oyo abota mwana ya bwanya akosepela kati na ye.
Masese ya Salomo
Masese ya Salomo :
Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,
kasi mwana ya zoba ayokisaka
mama na ye pasi na motema.
Bongisa libanda ya mosala na yo,
bongisa bilanga na yo,
bongo na sima, tonga ndako na yo.
Moto oyo alukaka litomba na nzela ya sembo te
amemaka mitungisi na libota na ye,
kasi moto oyo aboyaka kanyaka akozala na bomoi.
Moto oyo akotisaka mobulu kati na ndako na ye
akozwa mopepe lokola libula,
mpe moto oyo azangi mayele
akokoma mowumbu ya moto ya bwanya.
Casamento e família
O homem deixará pai e mãe e se unirá à sua mulher. A família começa no casamento — aliança sagrada diante de Deus.
Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.
Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. »
Sepela na bomoi na yo elongo na mwasi na yo, oyo olingaka na mikolo nyonso ya bomoi ya pamba oyo Nzambe apesi yo na se ya moyi ; solo, na mikolo na yo nyonso ya pamba, pamba te yango nde ezali mbano ya bomoi na yo mpo na misala nyonso oyo omonelaka pasi na se ya moyi.
Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. » Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.
Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !
Boni, mama akoki solo kobosana
bebe na ye oyo azali komelisa mabele,
to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ?
Ata soki akoki kobosana,
ngai nakoki kobosana yo te !
Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ;
bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai.
Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka. Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.