Força
O Senhor é a nossa força. A Bíblia está repleta de promessas para os que se sentem fracos, cansados ou sobrecarregados. Deus fortalece, sustenta e renova os que confiam nele.
O Senhor é minha força
O Senhor é minha força e meu escudo; nele meu coração confia. Ele é a fortaleza da minha vida — de quem me recearei?
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;
natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.
Motema na ngai etondi na esengo,
mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;
natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.
Motema na ngai etondi na esengo,
mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Yawe azali makasi mpe nguba na ngai ;
natielaka Ye motema na ngai, mpe asungaka ngai.
Motema na ngai etondi na esengo,
mpe nazali kokumisa Ye na banzembo na ngai.
Yawe azali makasi ya bato na Ye,
ndako batonga makasi epai wapi mopakolami na Ye azwaka lobiko.
Nabatelami malamu epai ya Nzambe
Nzembo ya Davidi.
Yawe azali pole mpe lobiko na ngai ;
nakobanga nani ?
Yawe azali ndako batonga makasi ya bomoi na ngai ;
nakolenga liboso ya nani ?
Nakozalaka na elikya na likambo oyo :
nakobika bolamu ya Yawe
kati na mokili ya bato ya bomoi.
Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !
Talela Yawe !
Zala makasi mpe yika mpiko !
Talela Yawe !
Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ;
apesaki ngai elonga.
Natondi Yo mpo ete okangoli ngai
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi, mosali na Yawe. Ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo.
Oh Yawe, makasi na ngai, nalingaka Yo.
Yawe, Nzambe na ngai,
Yo nde opelisaka mwinda na ngai ;
obongolaka molili na ngai pole.
Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka,
Liloba na Yawe ezali na mbeba te ;
azali nguba mpo na bato nyonso
oyo bazwaka Ye lokola ebombamelo na bango.
Renovar as forças
Os que esperam no Senhor renovam as forças. Sobem com asas como águias, correm e não se cansam, caminham e não se fatigam.
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.
Apesaka makasi na bato oyo balembi
mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
Apesaka makasi na bato oyo balembi
mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
Apesaka makasi na bato oyo balembi
mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;
komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;
nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;
solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,
loboko oyo elongisaka.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;
komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;
nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;
solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,
loboko oyo elongisaka.
Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;
komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;
nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;
solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,
loboko oyo elongisaka.
Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi,
kasi na pamba : mayi ezali te ;
balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi.
Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ;
Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te.
Ozalaki ekimelo mpo na mobola,
ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi,
ebombamelo na tango ya mvula makasi
mpe pio na tango ya molunge.
Pamba te pema ya banyokoli ezali
lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ;
komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga
mitole na esika ya putulu,
mafuta ya esengo na esika ya matanga,
mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami.
Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe,
mpo na komonisa nkembo na Ye.
Tudo posso em Cristo
Tudo posso naquele que me fortalece. Deus dá poder ao cansado e multiplica as forças dos que não têm vigor.
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai. Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai. Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.
Yango wana, na likambo oyo etali Klisto, ezala kati na bolembu, na kofingama, na kozanga, na minyoko to mpe na pasi oyo nakutanaka na yango, nasepelaka na ngai kaka ; pamba te ezali na tango oyo nazalaka na bolembu nde natondaka na makasi.
Bibundeli oyo tobundaka na yango ezali ya bonzoto te, kasi ezali bibundeli ya nguya kati na Nzambe mpo na kokweyisa bandako batonga makasi. Solo, tobukaka makanisi ya mabe,
Tosengeli te kokanisa ete ezali na ndenge na biso moko nde tozwi makoki ya kosala likambo songolo ; te, makoki na biso ewutaka nde na Nzambe.
Força do Espírito
Recebereis poder ao descer sobre vós o Espírito Santo. O Espírito nos fortalece com poder no homem interior.
Kasi bokozwa nguya, wana Molimo Mosantu akokitela bino ; mpe bokozala batatoli na Ngai kati na Yelusalemi, na etuka mobimba ya Yuda, ya Samari, mpe kino na basuka ya mokili.
Wana bamonaki ndenge nini Petelo mpe Yoane bazalaki koloba na mpiko, mpe wana basosolaki ete bazali bato batanga te mpe bato pamba, bakamwaki mingi. Boye, basosolaki ete bango mpe bazalaki elongo na Yesu.
mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye,
Bibundeli ya Nzambe
Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
Bibundeli ya Nzambe
Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
Bibundeli ya Nzambe
Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene.
Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso, tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen.
Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.
Soki toyiki mpiko,
tokokonza mpe elongo na Ye.
Kasi soki towangani Ye,
Ye mpe akowangana biso ;
Coragem e perseverança
Sê forte e corajoso! O Senhor teu Deus é contigo por onde quer que andares. Não desanime, porque a alegria do Senhor é a vossa força.
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »
Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. »
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. »
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. »
Neyemi alobaki na bango lisusu :
— Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.
Mokonzi oyo ya Asiri azali kaka na nguya ya bomoto ; kasi biso, tozali elongo na Yawe, Nzambe na biso, oyo akosunga mpe akobundela biso bitumba.
Boye bato batiaki elikya na maloba oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alobaki.
Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. »
Davidi alobaki lisusu na Salomo, mwana na ye ya mobali :
— Yika mpiko mpe sala mosala ! Kobanga te, kozala mpe na somo te ; pamba te Yawe, Nzambe na ngai, azali elongo na yo ; akotika yo te mpe akobwaka yo te kino mosala nyonso ya Tempelo ya Yawe ekosila.
Oh Yawe, monene, nguya, kongenga,
nkembo mpe bokonzi ezali ya Yo ;
pamba te biloko nyonso oyo ezali na likolo mpe na se ezali ya Yo.
Yawe, bokonzi ezali ya Yo,
osalaka nyonso oyo olingi na ekelamu nyonso.
Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye !
Bolukaka tango nyonso elongi na Ye !
Fortalecidos na Palavra
A Palavra de Deus é viva e eficaz. Ela nos fortalece, nos guia e nos equipará para toda boa obra.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
Mitindo ya suka
Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.
Mitindo ya suka
Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.
Mitindo ya suka
Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi.
Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya, mpo ete moboko ya kondima na bino ezala te bwanya ya bomoto, kasi ezala nde nguya ya Nzambe.
Bwanya ya bato mpe liboma mpo na Nzambe
Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki ;
Bwanya ya bato mpe liboma mpo na Nzambe
Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki ;
Promessas de força
Quando estou fraco, o Senhor me sustenta. Ele restaura minha alma, fortalece meu coração e guia meus passos.
Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto,
alendisaka bomoi na ye ;
ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ;
pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.
Lobiko ya bato ya sembo ewutaka epai ya Yawe
oyo, na tango ya pasi, azali ndako na bango,
oyo batonga makasi.
Tango bato ya sembo babelelaka,
Yawe ayokaka mpe akangolaka bango
na pasi na bango nyonso.
Mabe ebomaka moto mabe,
mpe bayini ya moto ya sembo bakozwa etumbu.
Bino babulami na Ye nyonso,
bolinga Yawe !
Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye,
kasi apesaka etumbu ya makasi
epai ya bato ya lofundu.
Na nguya na Yo, obenganaki bikolo
mpe otiaki bakoko na biso ;
obetaki bikolo ya bapaya
mpe ofulukisaki bakoko na biso.
Bayengaka-yengaka mpo na koluka bilei ;
soki batondi te, balekisaka butu na kolelalela.
Kasi ngai nakoyembela makasi na Yo,
nakobetela bolingo na Yo milolo, na tongo,
pamba te ozali ebombamelo na ngai,
mpe ekimelo na ngai na tango ya pasi.
Nzambe, wuta bolenge na ngai, oteya ngai ;
mpe kino lelo, nazali kotatola bikamwa na Yo.
Ezala ndenge nakomi sik’oyo mobange
mpe suki na ngai ekomi pembe,
oh Nzambe na ngai, kotika ngai te,
mpo ete natatola makasi na Yo
epai ya bato ya ekeke oyo,
mpe misala ya nguya na Yo
epai ya bato nyonso oyo bakoya sima.
Atako osalaki ete tokutana na pasi mingi mpe na makambo ya bololo,
kasi okotika lisusu biso kozala na bomoi,
okobimisa ngai lisusu wuta na mozindo ya mabele.
Okomatisa lisusu lokumu na ngai,
mpe okobondisa ngai lisusu.
Nzoto na ngai ekoki kobeba,
mpe motema na ngai ekoki kolemba ;
kasi Nzambe azali Libanga
mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Nzoto na ngai ekoki kobeba,
mpe motema na ngai ekoki kolemba ;
kasi Nzambe azali Libanga
mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Nzoto na ngai ekoki kobeba,
mpe motema na ngai ekoki kolemba ;
kasi Nzambe azali Libanga
mpe libula na ngai mpo na tango nyonso.
Perseverança e vitória
Se Deus é por nós, quem será contra nós? A Palavra da cruz é poder de Deus para os que são salvos.
Bolingo ya Nzambe epesaka elikya
Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?
Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.
Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.
Esengo na bavandi ya Ndako na Yo !
Bakokumisa Yo tango nyonso !
Tango bakatisaka Lubwaku ya Baka,
bakomisaka yango esika oyo etonda na bitima ya mayi,
mpe mvula etondisaka yango na mapamboli.
Soki natungisami na makanisi ebele,
kobondisama na Yo epesaka ngai esengo.
Nazali kolela mpo na pasi na motema ;
pesa ngai mpiko kolanda liloba na Yo.
Kati na pasi na ngai, liloba na Yo ebondisaka ;
batela bomoi na ngai kolanda elaka na Yo.
Tango pasi ekweyelaka ngai,
obatelaka bomoi na ngai,
osembolaka loboko na Yo
mpo na kotelemela kanda ya banguna na ngai ;
mpe loboko na Yo ya mobali ebikisaka ngai.
Natalisi likambo na ngai liboso na Ye,
natandi pasi na ngai liboso na Ye.
Nayebi sik’oyo ete Yawe abikisaka mopakolami na Ye,
ayanolaka ye wuta na Esika na Ye ya bule kati na Lola,
na nzela ya nguya ya loboko na Ye ya mobali.
Matondi mpo na elonga
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi.
Oh Yawe, Nkolo na biso,
Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba !
Ovandisi nkembo na Yo
kati na Lola.
Em todo tempo
O Senhor fortalece de manhã à noite, do berço à velhice. Nenhum obstáculo é grande demais quando Deus é nossa força.
Nkolo Yawe azali makasi na ngai :
akomisaka makolo na ngai lokola makolo ya mboloko,
apesaka ngai makasi ya komata
kino na likolo ya bangomba.
Wuta na buku ya motambolisi banzembo. Babetaki yango na mandanda.
Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te.
Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi :
« Lokola bato oyo balobi maloba ya boye,
nakosala ete maloba na Ngai ezala
lokola moto na monoko na yo,
mpe bato oyo bazala lokola bakoni
oyo moto yango ekozikisa.
Nakosala ete balendisama kati na Yawe :
bakotambola na Kombo na Ye, »
elobi Yawe.
Alobaki na ngai :
— Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.
Wana Yesu atalaki bango, alobaki :
— Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
Ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo ya Tata na bino nde akoloba na nzela ya minoko na bino.
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »
Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye.
Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili.
Pamba te Nkolo abwakaka moto te
mpo na libela.
Ezala soki apesi etumbu, ayokaka kaka mawa
mpo na bolingo monene na Ye.
Ezalaka na esengo te
nde Yawe ayokisaka bato soni
to atindelaka bato pasi.
Este artigo te tocou? Faça uma oração!
+581 estão orando agora.
Junte-se à corrente de oração.