Guardar o coração
Guardar o coração é o mandamento mais urgente de Provérbios. Sobre tudo o que se deve guardar, guarda o teu coração, porque dele procedem as fontes da vida.
Sobre tudo, guarda o coração
O coração é a nascente de tudo — pensamentos, desejos, decisões. Guardá-lo é proteger toda a vida espiritual e emocional.
Batela malamu motema na yo koleka biloko nyonso,
pamba te makambo nyonso oyo tosalaka,
wana tozali na bomoi, ewutaka na motema.
Mwana na ngai ya mobali, pesa ngai motema na yo,
mpe tika ete miso na yo esepela na nzela na ngai !
Elikya na Yawe
Mwana na Ngai, kobosana mateya na ngai te,
kasi batela mibeko na ngai kati na motema na yo ;
pamba te ekoyeisa mikolo ya bomoi na yo milayi,
ekobakisa mibu ebele na bomoi na yo
mpe ekomemela yo kimia.
Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.
Coração puro e renovado
Cria em mim um coração puro, ó Deus. Os puros de coração verão a Deus — e o Espírito renova nosso interior.
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ;
mpe mikuwa na ngai oyo obukaki
ekosepela makasi.
Esengo na bato oyo bazali na mitema peto,
pamba te bakomona Nzambe !
Oh Nzambe, kundola mpe yeba mozindo
ya motema na ngai,
meka ngai mpe yeba makambo oyo ezali kotungisa ngai !
Tala soki nazali kotambola na nzela mabe
mpe tambolisa ngai na nzela ya tango nyonso !
Yawe, tala ngai malamu mpe meka ngai,
sosola motema mpe makanisi na ngai,
pamba te napengwaka te liboso ya bolingo na Yo
mpe nabikaka bomoi na ngai kolanda bosembo na Yo.
Soki otali malamu motema na ngai,
soki olandeli ngai ata na butu
mpe omeki ngai,
okomona ete nasalaki mabongisi ya mabe te,
monoko na ngai ebukaki mobeko te.
Ata tango bato bamekaki kopesa ngai kanyaka,
nabatelaki kaka maloba na Yo
mpo ete natambola te na banzela ya bato ya masumu.
Matambe na ngai ezalaka kaka na banzela na Yo,
napengwaka te.
Batiaki monyama na makolo na ngai
mpo ete nakangama,
batimolaki libulu liboso na ngai,
kasi bango moko nde bakweyaki kati na libulu yango.
Guardar com a Palavra
Não vos conformeis com este mundo. A Palavra de Deus guardada no coração nos protege do pecado e nos direciona.
Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.
Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso.
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;
batela ngai mpo ete napengwa te
mosika ya mibeko na Yo !
Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai
mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.
Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso. Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo.
alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo.
Vigilância e paz
A paz de Deus guarda nossos corações em Cristo Jesus. Chegai-vos a Deus, purificai os corações — e Ele estará convosco.
Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto.
Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !
Bino mpe, bokangaka mitema mpe boyikaka mpiko, pamba te koya ya Nkolo ekomi pene.
Lokola bosekwaki mpe elongo na Klisto, bolukaka biloko ya Likolo epai wapi Klisto avandi na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe,