Pular para o conteúdo
Publicidade

Homem de Deus

Por Bíblia Online

O homem de Deus é aquele que busca a justiça, a piedade, a fé e o amor. A Bíblia apresenta modelos de homens íntegros que andaram com Deus e marcaram a história.

Características do homem de Deus

O homem de Deus foge das paixões e segue a justiça, a piedade, a fé, o amor, a perseverança e a mansidão.

Etumba ya malamu

Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.

Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.

Mitindo ya suka

Bosenzelaka, botelemaka ngwi kati na kondima, boyikaka mpiko, bozalaka makasi. Bosalaka makambo nyonso na bolingo.

Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu.

Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo :

Tambola na bosembo,

linga boboto mpe tambola

elongo na Nzambe na yo na komikitisa.

Exemplos bíblicos

Noé era justo e íntegro entre seus contemporâneos. Jó era homem reto que temia a Deus e se desviava do mal.

Noa mpe bana na ye

Tala lisolo ya libota ya Noa.

Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe.

Komekama ya Yobo

Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe.

Nzambe atindaki moto moko, kombo na ye ezalaki « Yoane» Ayaki lokola motatoli, mpo na kotatola na tina na pole, mpo ete bato nyonso bandima na nzela na ye.

Bwanya emonanaka na elongi ya moto ya mayele,

kasi miso ya zoba ekendaka kino na suka ya mokili.

Viver como filho de Deus

Quem faz a vontade de Deus é eleito. Medite na Palavra e ande nos caminhos do Senhor como verdadeiro discípulo.

nzokande bato nyonso oyo bayambaki Ye, ba-oyo bandimelaki Kombo na Ye, apesaki bango makoki ya kokoma bana na Nzambe. Bakomi bana na Nzambe na nzela ya mbotama ya bomoto te, na posa ya bomoto te to mpe na mokano ya moto te, kasi na mokano ya Nzambe.

Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.

Ndenge nini elenge akoki kowumela

na nzela ya sembo ?

Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.

Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;

batela ngai mpo ete napengwa te

mosika ya mibeko na Yo !

Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai

mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.

Yawe, tika ete opambolama !

Lakisa ngai mitindo na Yo !

Na monoko na ngai, natangaka

mibeko na Yo nyonso.

Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo

lokola nde nazali na bomengo nyonso.

Nakanisaka malako na Yo

mpe natambolaka na banzela na Yo.

Nasepelaka mingi na malako na Yo

mpe nabosanaka liloba na Yo te.

Mibeko ya Yawe ezali etima ya mapamboli

Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe,

atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,

mpe avandaka te esika moko na batioli,

kasi asepelaka na mibeko ya Yawe

mpe akanisaka yango butu mpe moyi.

Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi,

oyo ebotaka mbuma na eleko na yango,

mpe makasa na yango ekawukaka te ;

misala na ye nyonso etambolaka malamu.

Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe !

Bazali lokola matiti ya kokawuka

oyo mopepe epanzaka.

Yango wana bato mabe bakolonga te

kotelema na kosambisama,

mpe bato ya masumu bakowumelaka te

kati na lisanga ya bato ya sembo.

Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo,

kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.

mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta, mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika, mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.

Seja o primeiro