Publicidade

Honestidade

Por Bíblia Online

A honestidade é virtude cristã fundamental. Deus é Deus de verdade e nos chama a viver com integridade, transparência e retidão em todos os nossos relacionamentos e negócios.

Integridade diante de Deus

O Senhor abomina a balança falsa, mas o peso justo é seu prazer. A integridade dos justos os guia pelos caminhos retos.

Bimekelo kilo ya lokuta ezali lokola makambo ya nkele

na miso ya Yawe,

kasi kilo ya sembo ezali elengi na miso na Ye.

Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango,

kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka

na boyengebene te ebebisaka bango.

Boyengebene ya bato ya sembo etambolisaka bango,

kasi mayele mabe ya bato oyo batambolaka

na boyengebene te ebebisaka bango.

Boye, okososola likambo nini

ezali solo, alima, sembo :

nzela nyonso oyo ememaka na bolamu.

Na miso na Yawe,

kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuya

koleka bambeka ya kotumba.

Tika ete miso na yo etalaka kaka liboso,

mpe salaka makambo na bosembo mpe bosolo.

toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.

Pamba te totondi na posa makasi ya kozala na etamboli ezanga pamela, na miso ya Nkolo kaka te, kasi mpe na miso ya bato.

Praticar a honestidade

Falai a verdade, pagai o que deveis, não negueis ao próximo o bem. A honestidade prática é testemunho do evangelho.

Bokosanaka te, pamba te bobwakaki bomoto na bino ya kala elongo na misala na yango

Bopesa oyo ekoki na mokonzi nyonso : mpako epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, motuya ya biloko epai na ye oyo bosengeli kofuta yango, botosi epai na ye oyo asengeli kotosama, mpe lokumu epai na ye oyo asengeli kozwa yango.

Yango wana mpe bofutaka bampako, pamba te bakonzi bazali basali ya Nzambe, oyo bapesaka tango na bango nyonso mpo na kokamba.

Bozongisaka mabe na mabe te. Bolukaka kosala makambo ya malamu na miso ya bato nyonso.

Kolinga baninga

Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto

oyo azali na bosenga,

tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango.

Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu

koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe.

Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe

epesaka litomba te,

kasi bosembo ekangolaka na kufa.

Confissão e transparência

Confessai as vossas ofensas uns aos outros. Quem confessa e deixa o pecado encontra misericórdia e restauração.

Moto oyo abombaka masumu na ye abongaka te,

kasi ye oyo atubelaka mpe atikaka yango azwaka ngolu.

Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.

Maloba mpo na ndayi

Liboso na nyonso, bandeko na ngai, bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, ya mokili to mpe ya eloko nini. Tika ete « iyo » na bino etikala « iyo» mpe « te » na bino etikala « te» mpo ete bakatela bino etumbu te.

Kasi bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe ezalaka nanu ya peto ; bongo, ememaka kimia, boboto, boyokani, koyokela bato mawa ; ebotaka bambuma ya malamu, eponaka bilongi te mpe ezalaka na lokuta te.

Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te.

Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali ; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo.

Coração puro

Bem-aventurados os puros de coração, porque verão a Deus. A honestidade começa no interior e se manifesta nas ações.

Esengo na bato oyo bazali na mitema peto,

pamba te bakomona Nzambe !

Batela kimia liboso ya Yawe

mpe talela Ye ;

kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye,

mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe.

Esengo na moto oyo

ayokelaka bato mawa mpe adefisaka,

mpe asalaka misala na ye kolanda bosembo.

Sala makasi ete omimonisa liboso ya Nzambe lokola moto ya kokoka, lokola mosali oyo ayokelaka mosala na ye soni te, pamba te ateyaka na bosembo Liloba ya solo.

Lisese ya mwinda

Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.

Moto ya misala mabe akangamaka na motambo

ya maloba na ye ya lokuta,

kasi moyengebene akobika kati na pasi.

Motatoli ya malamu apesaka matatoli ya solo,

kasi motatoli ya mabe apesaka matatoli ya lokuta.

Moto mabe alonaka koswana,

moto ya songisongi akabolaka baninga.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-