Publicidade

Incentivo

Por Bíblia Online

A Bíblia é fonte inesgotável de incentivo. Em cada página, Deus nos encoraja a não temer, a perseverar e a confiar que Ele está conosco e é maior que qualquer adversidade.

Deus é por nós

Se Deus é por nós, quem será contra nós? O Senhor fortalece, sustenta e guia seus filhos em cada batalha e desafio.

Bolingo ya Nzambe epesaka elikya

Boye, toloba lisusu nini ? Soki Nzambe azali mpo na biso, nani akotelemela biso ?

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;

komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;

nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;

solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,

loboko oyo elongisaka.

basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,

Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :

bapumbwaka likolo lokola bampongo,

bapotaka mbangu mpe bapemaka te,

batambolaka mpe balembaka te.

Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.

Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te»

Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.

Esperança e perseverança

A tribulação produz perseverança, a perseverança produz caráter, e o caráter produz esperança que não decepciona.

Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko, koyika mpiko ememaka elonga kati na komekama, mpe elonga kati na komekama ebotaka elikya. Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.

Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango.

Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.

Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.

Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.

Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya. Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.

Yesu alobaki na ye :

Olobi nini : « Soki okoki » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.

Deus cuida de nós

Entrega o teu caminho ao Senhor. Lança sobre Ele as tuas ansiedades, porque Ele tem cuidado de nós diariamente.

Kaba bomoi na yo epai na Yawe,

tia elikya kati na Ye, mpe akosala :

Soki Yawe asepeli na etamboli ya moto,

alendisaka bomoi na ye ;

ezala akweyi, akotikala kaka ya kokweya te ;

pamba te Yawe asimbaka ye na loboko.

Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,

nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;

maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,

nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.

Kangola ngai

Nzembo ya mobembo tango bazalaki kokende na Tempelo ya Yawe.

Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe,

mpe ayanolaki ngai.

Nalalaka mpe nazwaka pongi ;

nalamukaka lisusu,

pamba te Yawe azali makasi na ngai.

Futuro e promessas

Eu sei os planos que tenho para vocês — planos de paz e não de mal, para dar-lhes futuro e esperança.

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,

azali Elombe Mobikisi.

Akosepela na yo makasi

mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;

akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo

Wana Yesu atalaki bango, alobaki :

Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !

Kasi, kolanda ndenge ekomama :

« Oyo liso etikala nanu komona te,

oyo litoyi etikala nanu koyoka te,

mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te

kati na motema na ye,

yango nde Nzambe abongisi

mpo na bato oyo balingaka Ye»

Kasi Shama atelemaki na kati-kati ya elanga, abundelaki yango mpe abomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-