Publicidade

Intimidade com Deus

Por Bíblia Online

A intimidade com Deus é o maior privilégio do cristão. Ele nos convida a nos aproximar, a conhecê-lo profundamente e a desfrutar de comunhão diária com o Criador do universo.

Aproximar-se de Deus

Chegai-vos a Deus e Ele se chegará a vós. Deus deseja intimidade, não religiosidade. Ele busca os que o buscam de todo coração.

Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !

Feti ya ofele

« Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya,

boya na esika oyo mayi ezali ;

ezala bino oyo bozali na mbongo te,

boya kosomba mpe kolia ;

boya kosomba vino mpe miliki :

ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te !

Mpo na nini bozali kobebisa mbongo

mpo na bilei oyo etongaka nzoto te,

mpe kobimisa motoki

mpo na bilei oyo etondisaka te ?

Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko,

mpe bokosepela na biloko ya elengi.

Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai,

boyoka mpe bokozala na bomoi ;

nakosala boyokani ya libela elongo na bino,

boyokani oyo nalakaki Davidi,

na boyengebene mpe na bolingo na Ngai.

Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai

na miso ya bato ya bikolo ebele,

mokambi mpe motambolisi ya bato.

Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te,

mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo

mpo na Yawe, Nzambe na yo,

mpo na Mosantu ya Isalaele,

pamba te alatisi yo nkembo»

Boluka Yawe wana akoki nanu komonana,

bobelela Ye wana azali nanu pene.

Liboso ete babelela Ngai,

nakoyanola bango ;

mpe wana basilisi nanu koloba te,

nakoyoka bango.

‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.

Sede de Deus

Como a corça deseja as correntes de água, assim a minha alma suspira por ti, ó Deus. A intimidade nasce do desejo profundo.

Kozala na posa ya Nzambe

Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi.

Ndenge mbuli eyokaka posa ya komela mayi,

ndenge wana mpe molimo na ngai ezali na posa na Yo, Nzambe.

Boboto ya Nzambe eleki bomoi na motuya

Nzembo ya Davidi. Ayembaki yango tango azalaki kati na esobe ya Yuda.

Oh Nzambe, ozali Nzambe na ngai ;

nazali koluka Yo,

molimo na ngai ezali na posa na Yo,

bomoi na ngai ezali na posa na Yo makasi,

kati na mabele ekawuka mpe ezanga mayi.

Natalaki Yo kati na Esika ya bule

mpo na komona makasi mpe nkembo na Yo.

Pamba te bolingo na Yo ezali malamu koleka bomoi,

bibebu na ngai ekosanzola Yo.

Boye, nakopambola Yo bomoi na ngai mobimba,

nakotombola maboko na ngai

mpo na lokumu ya Kombo na Yo.

Nakotonda lokola moto oyo asili kolia

misuni kitoko mpe mafuta ;

bibebu na ngai ekoganga na esengo

mpe monoko na ngai ekokumisa Yo.

Soki nakanisi Yo na mbeto na ngai,

nasambelaka Yo na butu ;

pamba te ozali lisungi mpo na ngai,

mpe nagangaka na esengo

wana nazali na se ya elili ya mapapu na Yo.

Nakangami na Yo ;

loboko na Yo ya mobali esimbi ngai makasi.

Bato oyo balukaka koboma ngai

bakozinda na mabele

Bakoboma bango na mopanga

mpe bakokoma bilei ya bambwa ya zamba.

Unidade com o Pai

Jesus orou pela unidade dos seus com o Pai. A intimidade com Deus inclui confissão, perdão e alegria na comunhão.

Nasaleli bango ngolu ya kobika nkembo na Yo ndenge kaka osalaki mpo na Ngai, mpo ete bazala moko ndenge biso mpe tozali moko : Ngai kati na bango, mpe Yo kati na Ngai. Ezali kaka na nzela wana nde bakokoka kozala penza moko, mpo ete mokili eyeba penza ete Yo nde otindaki Ngai, mpe ete olingaka bango ndenge olingaka Ngai.

Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,

azali Elombe Mobikisi.

Akosepela na yo makasi

mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;

akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo

Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-