Publicidade

Jovens

Por Bíblia Online

Deus tem planos maravilhosos para os jovens. A Bíblia os convida a consagrar a juventude ao Senhor, crescer em sabedoria e ser exemplo para todos em fé, palavra, conduta e amor.

Ninguém despreze a tua mocidade

Paulo exortou Timóteo: sê exemplo dos fiéis na palavra, no procedimento, no amor, no espírito, na fé e na pureza.

Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.

Lendisa mpe bilenge mibali ete bamibatelaka malamu.

Baboti mpe bana

Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili.

Baboti mpe bana

Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu

Lembrar do Criador na juventude

Lembra-te do teu Criador nos dias da tua mocidade. A sabedoria ganha cedo produz frutos duradouros na vida inteira.

Kobosana Mokeli na yo te

Kanisa Mokeli na yo,

na mikolo nyonso ya bolenge na yo,

liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo,

mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango :

« Nazali kosepela na ngai na yango te »

Kobosana Mokeli na yo te

Kanisa Mokeli na yo,

na mikolo nyonso ya bolenge na yo,

liboso ete mikolo ya pasi ekomela yo,

mpe mibu epusana, mibu oyo okoloba na tina na yango :

« Nazali kosepela na ngai na yango te »

liboso ete moyi mpe pole, sanza mpe minzoto,

ekoma molili,

mpe mapata ezonga sima na mvula ;

tango bakengeli ya ndako bakolenga,

mpe bato ya makasi bakofukama ;

tango basi oyo banikaka ble bakotika konika yango

mpo ete bazali lisusu mingi te,

mpe bato oyo batalaka na maninisa

bakobungisa kitoko na bango ;

Elenge, sepela na bolenge na yo,

mpe tika ete motema na yo esepela

na mikolo ya bolenge na yo !

Landa nzela ya motema na yo

mpe nyonso oyo esepelisaka miso na yo ;

kasi yeba ete, mpo na makambo wana nyonso,

Nzambe akosambisa yo.

Yango wana, longola mawa na motema na yo,

longola pasi na nzoto na yo ;

pamba te bolenge mpe bomwana ezali pamba.

Botombolami ezali pamba

Elenge mobola ya mayele azali malamu koleka mokonzi ya mobange oyo azangi mayele mpe ayokaka toli te ;

Força e promessa

Os jovens renovam suas forças quando esperam no Senhor. Deus levanta jovens com visões e sonhos para transformar o mundo.

Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka,

bilombe batengaka-tengaka ;

basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,

Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :

bapumbwaka likolo lokola bampongo,

bapotaka mbangu mpe bapemaka te,

batambolaka mpe balembaka te.

Nzambe apesaki bilenge wana minei boyebi mpe bososoli kati na makambo nyonso : koloba, kokoma, kotanga mikanda, mayele mpe bwanya. Mpe Daniele akomaki na makoki ya kolimbola bimoniseli mpe bandoto ya ndenge na ndenge.

Sima na mikolo oyo mokonzi akataki mpo ete bamemela ye bango, mokonzi ya bakalaka ya lokumu amemaki bango liboso ya Nabukodonozori. Mokonzi asololaki na bango ; mpe kati na bilenge nyonso oyo bamemelaki ye, amonaki ete moko te akokani na Daniele, na Anania, na Mikaeli mpe na Azaria. Boye, bakomaki kosala kati na ndako ya mokonzi.

Makasi ezali biju ya bilenge,

mpe suki ya pembe ezali lokumu ya mibange.

Bayebaka elenge mobali na nzela ya misala na ye,

soki ezaleli na ye ezali peto mpe sembo.

Guardar o caminho

Como purificará o jovem seu caminho? Guardando-o segundo a tua Palavra. A Escritura na juventude guarda do pecado a vida inteira.

Ndenge nini elenge akoki kowumela

na nzela ya sembo ?

Ezali na kotambola kolanda liloba na Yo.

Nabatelaka liloba na Yo kati na motema na ngai

mpo ete nasala masumu te na miso na Yo.

Nkolo Yawe, ozali elikya na ngai ;

wuta bolenge na ngai, namipesaka na Yo.

ezala bilenge mibali to bilenge basi,

ezala bampaka to bana mike !

Tika ete bakumisa Kombo ya Yawe !

Pamba te Ye moko kaka nde aleki likolo ;

nkembo na Ye eleki mabele mpe likolo.

Maloba ya ebandeli

Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele :

mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya

mpe kososola maloba ya mayele ;

mpo na kozwa mateya ya bwanya

oyo epesaka bizaleli ya sembo,

ya boyengebene mpe makambo ya alima ;

mpo na kopesa mayele epai ya bazoba,

mpe boyebi epai ya bilenge.

Mwana na ngai, yoka mpe zala na bwanya,

batela motema na yo kati na nzela ya sembo.

Kozala esika moko te na balangwi masanga

to na bato ya lokoso,

pamba te balangwi masanga mpe bato na lokoso bakomaka babola,

mpe bogoyigoyi ekolatisa bango bilamba epasuka.

Yokela tata oyo aboti yo,

mpe kotiola mama na yo te ata soki anuni.

Coragem e vocação

Deus chamou jovens como Jeremias e Josué para grandes missões. A juventude não é desculpa — é oportunidade de servir poderosamente.

Nazongisaki :

Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge !

Kasi Yawe alobaki na ngai :

Koloba te : « Nazali elenge» Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo. Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.

Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino» elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu. Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino. Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba. Nakomimonisa epai na bino» elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino» elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu»

Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala. Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso. Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende»

Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi :

« Nzambe atelemelaka bato ya lolendo,

kasi atalisaka ngolu na Ye

epai ya bato oyo bamikitisaka»

Yango wana, bomikitisaka na se ya loboko ya nguya ya Nzambe mpo ete atombola bino na tango oyo ekoki.

Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana.

Totambola malamu, na lolenge oyo ebongi mpo na moyi : na lokoso te, na milangwa te, na pite te, na mobulu te, na koswana te mpe na zuwa te.

Ezali malamu mpo na moto

komema ekangiseli na ye

wana azali nanu elenge.

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-