Publicidade

Juízo

Por Bíblia Online

O juízo de Deus é manifestação de sua justiça e soberania. Ele julga o mundo, julga as nações e julga cada coração com perfeita equidade e misericórdia.

O juízo de Deus

Deus é juiz justo que prova os corações. Seu juízo é verdadeiro e alcança toda obra, secreta ou pública.

Pamba te, Nzambe akomema misala nyonso na kosambisama,

ezala oyo ebombama, ya malamu to ya mabe.

Ndenge kaka Tata asekwisaka bakufi mpe apesaka bango bomoi, ndenge wana mpe Mwana apesaka bomoi na moto oyo Ye alingi. Lisusu, Tata asambisaka bato te ; apesa bokonzi ya kosambisa bato na maboko ya Mwana, mpo ete bato nyonso bakumisa Mwana ndenge bakumisaka Tata. Moto oyo akumisaka Mwana te akumisaka mpe Tata te oyo atindaki Mwana. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto oyo azali koyoka maloba na Ngai mpe azali kondima Ye oyo atindaki Ngai, azali na bomoi ya seko mpe akosambisama te, kasi asili kolongwa na kufa mpe akomi na bomoi. Nazali koloba na bino penza ya solo : tango ezali koya mpe esili kokoka oyo bakufi bakoyoka mongongo ya Mwana na Nzambe, mpe ba-oyo bakoyoka yango bakozala na bomoi ; pamba te lokola Tata azali etima ya bomoi, yango wana asalaki mpe ete Mwana azala etima ya bomoi ; mpe apesaki Ye bokonzi ya kosambisa bato, mpo ete azali Mwana na Moto. Bokamwa yango te, pamba te tango ezali koya, tango oyo bato nyonso oyo bazali kati na bakunda bakoyoka mongongo na Ye mpe bakobima longwa kati na yango : ba-oyo basalaki malamu bakosekwa mpo na kozwa bomoi, kasi ba-oyo basalaki mabe bakosekwa mpo na kozwa etumbu. Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai. Soki napesi litatoli mpo na Ngai moko, litatoli na Ngai ekozala ya solo te.

Nzokande, nalobi na Ngai kaka bosolo. Ezali penza mpo na bolamu na bino ete Ngai nakende ; pamba te soki nakeyi te, Molobeli akoya te epai na bino ; kasi soki nakeyi, nakotindela bino Ye. Bongo tango akoya, akotalisa bato ya mokili na tina na lisumu, na tina na bosembo mpe na tina na kosambisama : na tina na lisumu, pamba te bandimaka Ngai te ;

Kasi Yesu alobaki na bango :

Mongongo wana eyokani te mpo na Ngai, kasi mpo na bino. Kosambisama ya mokili elingi kosalema nde sik’oyo ; mokonzi ya mokili oyo akobwakama sik’oyo na libanda. Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.

Moto yango azongisaki :

Nkolo, nandimi.

Mpe agumbamelaki Ye.

Yesu alobaki :

Nayaki mpo na kotia bososoli kati na mokili ; mpo ete bakufi miso bakoma komona, mpe ba-oyo bazali komona bakoma bakufi miso.

Prestando contas

Cada um prestará contas de si mesmo a Deus. O juízo começa pela casa de Deus e depois alcança os que não obedecem ao evangelho.

Bato oyo balenda mpe oyo balenda te na kondima

Boyamba malamu moto oyo alenda te na kondima, na kotiana lisusu tembe te na tina na makanisi. Moto oyo azali na kondima aliaka bilei nyonso, kasi moto oyo alenda te na kondima aliaka kaka bandunda. Moto oyo aliaka bilei nyonso asengeli te kotiola moto oyo aponaka bilei, mpe moto oyo aponaka bilei asengeli te kosambisa moto oyo aliaka bilei nyonso, pamba te Nzambe asila koyamba ye. Boni, ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu ? Atelema to akweya, ezali likambo ya nkolo na ye. Tembe ezali te, akotelema kaka, pamba te Nkolo na ye azali na makoki ya kotelemisa ye.

Boye, moko na moko kati na biso akosamba liboso ya Nzambe mpo na makambo na ye moko.

Kobetisa ndeko kati na kondima libaku te

Yango wana, totika kosambisana biso na biso. Nzokande, bosalela mayele na bino te mpo na kobetisa ndeko moko libaku to mpo na kokweyisa ye. Nayebi mpe nandimisami kati na Nkolo Yesu ete eloko ya mbindo ezalaka te. Nzokande, soki moto moko amoni ete eloko songolo ezali mbindo, wana ezali mbindo mpo na ye.

Pamba te tokomi na tango oyo kosambisama ezali kobanda epai ya bato ya Nzambe. Bongo soki ebandi epai na biso, ekosuka ndenge nini epai ya bato oyo batosaka te Sango Malamu ya Nzambe ?

Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.

Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu.

Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ? Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na lisowana ozali na nzete kati na liso na yo ?

Justiça e redenção

O juízo de Deus é também redenção. Ele livrou Israel do Egito com juízos e salva os arrependidos pela cruz de Cristo.

Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi.

Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe.

Sukola ngai mobimba

mpo na kolongola mabe na ngai,

mpe petola ngai na masumu na ngai.

Yawe, Siona eyoki yango mpe esepeli ;

bingumba ya Yuda ezali na esengo

mpo na mikano na Yo !

Babuki-buki bililingi nyonso

oyo batobola na mabaya,

na nzela ya bipasola mpe bamarto na bango ;

batumbi Esika na Yo ya bule,

bakweyisi mpe bakomisi mbindo

esika oyo Kombo na Yo evandaka.

Nzembo ya elonga

Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola :

« Aleluya !

Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso,

pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ;

apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene

oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye,

mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye»

Bagangaki na mbala ya mibale :

« Aleluya !

Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba monene

ezali komata na likolo mpo na libela na libela »

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-04_23-13-58-