Justiça
A justiça é atributo de Deus e vocação do cristão. A Bíblia chama os crentes a buscar a justiça, praticar o que é reto e confiar no Deus que julga justamente.
Buscar a justiça
Buscai primeiro o Reino de Deus e a sua justiça. Quem semeia justiça colherá galardão seguro e duradouro.
Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.
Moto mabe asalaka mosala na lokuta,
kasi moto oyo alonaka na bosembo
akozwa lifuti ya malonga.
Moto oyo alukaka bosembo mpe bolingo
akozwa bomoi, bomengo mpe lokumu.
Na miso na Yawe,
kosala makambo ya sembo mpe ya alima ezali motuya
koleka bambeka ya kotumba.
Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye,
kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.
Bomengo oyo ezwami na nzela ya mabe
epesaka litomba te,
kasi bosembo ekangolaka na kufa.
Justiça em Cristo
Deus tornou Cristo a nossa justiça. Pela fé somos declarados justos diante de Deus — não por obras, mas pela graça.
Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »
Ngolu, etima ya lobiko
Pamba te ngolu ya Nzambe emonisami lokola etima ya lobiko mpo na bato nyonso. Elakisaka biso kotika mabe, kokabwana na baposa ya makambo ya mokili, kobika tango oyo na bwanya, na bosembo mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe,
Etumba ya malamu
Kasi yo, moto na Nzambe, kima makambo nyonso wana ; luka nde bosembo, botosi kati na makambo ya Nzambe, kondima, bolingo, molende mpe boboto.
Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino.
Bomikosa te : Nzambe amitikaka te ete batiola Ye. Oyo moto alonaka, yango nde abukaka.
Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
Praticar a justiça
O fruto da justiça semeia-se em paz para os que promovem a paz. Os olhos do Senhor estão sobre os justos.
Bato oyo bayeisaka kimia balonaka kati kimia mpe babukaka mbuma ya bosembo.
Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.
Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !
pamba te Yawe alingaka bosembo,
mpe asundolaka te bayengebene na Ye.
Babatelamaka mpo na seko,
kasi bana ya bato mabe bakolimwa.
Zala mosika na mabe mpe sala bolamu,
luka kimia mpe koba na yango.
Solo, aninganaka ata moke te.
Bakanisaka misala ya moto ya sembo tango nyonso.
Mibeko ya Yawe ezali etima ya mapamboli
Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe,
atelemaka te na nzela ya bato ya masumu,
mpe avandaka te esika moko na batioli,
Nalukaka Yo na motema na ngai mobimba ;
batela ngai mpo ete napengwa te
mosika ya mibeko na Yo !
Consequências
O Senhor recompensará cada um segundo suas obras. A justiça exalta a nação e traz segurança aos que a praticam.
Nzambe akofuta moto na moto kolanda misala na ye :
Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.
Bokozala kutu bato ya esengo, ezala soki bokomona pasi mpo na bosembo. Bobangaka bato te mpe bomitungisaka te.
Mpe soki bosalaka bolamu epai ya bato oyo basalaka bino bolamu, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe basalaka bongo.
Ezali motambo mpo na moto koloba na lombangu :
« Eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, »
mpe kokanisa sima na ye kolapa ndayi.
Este artigo te tocou? Faça uma oração!
+581 estão orando agora.
Junte-se à corrente de oração.