Livramento
Deus é o grande Libertador. Através da Bíblia, vemos Deus livrando seu povo de inimigos, de perigos e da morte. Quem clama ao Senhor, Ele ouve e liberta.
Deus ouve e livra
Clamaram ao Senhor na sua tribulação, e Ele os livrou das suas angústias. O Senhor é refúgio e a salvação dos que nele confiam.
kasi Yawe apesaka bato mabe mokongo
mpo ete bakanisa bango lisusu te kati na mokili.
Soki abeleli ngai, nakoyanola ye ;
nakozala elongo na ye na tango ya pasi,
nakokangola ye mpe nakopesa ye lokumu.
Nalobaka na tina na Yawe :
« Nzambe na ngai azali ebombamelo
mpe ndako makasi na ngai ;
natiaka elikya na ngai kati na Ye ! »
Ye nde akangolaka yo wuta na mitambo
ya mokangi bandeke
mpe na bokono oyo ebikisaka te.
Tika ete Nkolo akumisama, mokolo na mokolo !
Nzambe Mobikisi na biso alataka makambo na biso.
Epai na Yo Nzambe, nakokokisa bandayi na ngai
mpe nakobonza bambeka ya matondi.
bopesa bonsomi na moto oyo azangi makasi
mpe na mobola,
bokangola bango wuta na maboko ya bato mabe.
Pamba te makambo ebele ya pasi ezingeli ngai,
mabunga na ngai ekomi konyokola ngai,
mpe nazali kokoka lisusu te kotala yango ;
ezali ebele koleka suki ya moto na ngai,
mpe motema na ngai elembi kati na ngai.
Boye, tika ete bayengebene nyonso
basambelaka Yo na tango ya malamu !
Soki mayi minene etomboki,
bambonge na yango ekozwa bango te.
Livramento poderoso
Deus livrou Daniel dos leões, os jovens hebreus do fogo e Israel do Egito. Seu braço não é curto para salvar.
Soki babwaki biso kati na libulu ya moto, Nzambe oyo tosalelaka azali na makoki ya kobikisa biso wuta na libulu yango mpe ya kokangola biso na maboko na yo. Kasi ata soki abikisi na Ye biso te, tolingi mokonzi oyeba ete, biso, tokosalela banzambe na yo te mpe tokogumbamela te ekeko ya wolo oyo osalaki.
Akangolaki ngai wuta na maboko
ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai,
pamba te balekaki ngai na makasi.
Kasi basoda ya Eleazari babombamaki kati na elanga, babundelaki yango mpe babomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.
Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga ; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike.
Solo, wuta na tango ya kala,
nazalaka kaka ndenge moko ;
moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai.
Soki nasali, nani akobongola yango ? »
Redenção e restauração
Todo aquele que invocar o nome do Senhor será salvo. Deus livra do pecado, da morte e de todo mal aqueles que se humilham diante dele.
Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.
Mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »
mpe mpo na kozela, kowuta na Likolo, Mwana na Ye oyo asekwisaki kati na bakufi Yesu oyo azali kokangola biso na kanda oyo ezali koya.
soki bato na Ngai, oyo babengami na Kombo na Ngai bamikitisi, basambeli, baluki elongi na Ngai, mpe bapesi mokongo na banzela na bango ya mabe, Ngai, nakoyoka bango wuta na Likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango.
Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana. Soki bosengi Ngai eloko na Kombo na Ngai, nakosala yango.
Yesu alaki kopesa Molimo Mosantu
Soki bolingaka Ngai, bokobatela mibeko na Ngai. Mpe Ngai, nakosenga epai ya Tata ete apesa bino Molobeli mosusu mpo ete azala elongo na bino tango nyonso,
Toyebi biso nyonso ete Nzambe ayokaka bato ya masumu te, kasi ayokaka nde moto oyo atosaka Ye mpe asalaka mokano na Ye.
Bopusana pene ya Nzambe, mpe Ye akoya pene na bino. Bino bato ya masumu, bosukola maboko na bino ; bino bato ya mitema mibale, bopetola mitema na bino !
Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?
Akosambela Nzambe,
akozwa ngolu na miso na Ye,
akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo.
Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo.
Este artigo te tocou? Faça uma oração!
+581 estão orando agora.
Junte-se à corrente de oração.