Pular para o conteúdo
Publicidade

Mal

Por Bíblia Online

A existência do mal é realidade que a Bíblia confronta diretamente. Deus não é autor do mal, mas nos dá armas para vencê-lo e promete que o bem sempre prevalecerá.

Separar-se do mal

O temor do Senhor é aborrecer o mal. A Bíblia nos exorta a odiar o pecado, guardar os pés do mal e fugir de toda aparência maligna.

Kotosa Yawe ezali koyina mabe.

Nayinaka lolendo, lofundu, nzela ya masumu

mpe monoko ya lokuta.

Bino bato oyo bolingaka Yawe,

boyina mabe !

Yawe abatelaka bomoi ya bayengebene na Ye

mpe akangolaka bango na maboko ya bato mabe.

Batela lolemo na yo mosika na mabe,

mpe bibebu na yo ete eloba lokuta te.

Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo

mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.

Bomisukola mpe bomipetola,

bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai !

Botika kosala mabe !

Tika ete omimonaka te moto ya bwanya

na miso na yo moko ;

tosa Yawe mpe longwa na mabe.

Ekozala kisi mpo na kokomisa nzoto na yo kolongono

mpe kolendisa mikuwa na yo.

Vencer o mal com o bem

Não te deixes vencer do mal, mas vence o mal com o bem. A luz brilha nas trevas, e as trevas não prevalecem contra ela.

Kotika te ete mabe elonga na yo, kasi lukaka nde kolonga mabe na nzela ya kosala bolamu.

Tika ete bolingo ezalaka na lokuta te ! Boyinaka makambo mabe, bokangamaka makasi na makambo malamu.

Bandeko, nabondeli bino : bosala keba na bato oyo bakotisaka bokabwani mpe batiaka mabaku na nzela na bino, na makambo oyo ekeseni na mateya oyo bosilaki kozwa. Bozala mosika na bango.

Pole engengaka kati na molili, kasi molili eyambaki yango te.

Bosenzela ete moko te azongisa mabe na mabe, kasi bolukaka tango nyonso kosalanaka bolamu kati na bino mpe kosalaka bato nyonso bolamu.

kasi bomekaka nyonso na mozindo mpe bosimba oyo ezali malamu. Boboyaka mabe ya lolenge nyonso.

Proteção contra o mal

Deus nos livra do mal e guarda nossos passos. Devemos nos revestir da armadura de Deus para resistir às forças das trevas.

komema biso na komekama te,

kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ;

[pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo

ezali ya Yo seko na seko.] 

Nazali kosenga na Yo te ete olongola bango kati na mokili, kasi nde obatela bango liboso ya Satana.

Yawe akobatela yo na mabe nyonso,

akobatela bomoi na yo ;

Yawe akobatela kokende

mpe kozonga na yo,

sik’oyo mpe libela na libela.

Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela !

Amen.

Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana.

Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo.

Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma. Bopesaka na Satana nzela te.

Deus transforma o mal em bem

O que o mal pretendeu contra nós, Deus transformou em bem. Ele tira pureza da aflição e confessa a restauração dos arrependidos.

Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.

Yango wana, bobwaka makambo nyonso ya bosoto mpe misala nyonso ya mabe, bondima na komikitisa Liloba oyo elonamaki kati na mitema na bino, pamba te ezali na nguya ya kobikisa bino.

Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.

Yesu alobaki lisusu :

Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo. Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma, ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe. Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.

Koyina ebendaka koswana,

kasi bolingo ezipaka mabe.

Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu. Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe»

Seja o primeiro

Este artigo te tocou? Faça uma oração!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.