Pular para o conteúdo
Publicidade

Maria

Por Bíblia Online

Maria, mãe de Jesus, é honrada nas Escrituras como a mulher escolhida por Deus para trazer ao mundo o Salvador. Sua fé, humildade e obediência são exemplo para todos os cristãos.

A escolhida de Deus

O anjo Gabriel anunciou a Maria que ela seria mãe do Filho do Altíssimo. Ela respondeu com fé: 'Faça-se em mim segundo a tua palavra.'

Sango ya mbotama ya Yesu

Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti» Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye :

Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo !

Kasi anjelu alobaki na ye :

Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu» Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te.

Elaka ya mbotama ya Yesu

Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu.

O Magnificat

Maria cantou: 'Minha alma engrandece ao Senhor!' Seu cântico exalta a misericórdia, o poder e a fidelidade de Deus.

Bongo Mari alobaki :

Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo,

mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai,

pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye.

Yango wana, kobanda lelo,

bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo,

pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ;

Kombo na Ye ezali Bule.

Atalisaka boboto na Ye tango nyonso

epai ya bato oyo batosaka Ye.

Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye,

apanzi bato oyo batonda na lolendo,

akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi,

kasi atomboli bato oyo bamikitisaka.

Atondisi na biloko ya malamu

bato oyo bazalaki na nzala,

mpe azongisi bazwi maboko pamba.

Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye,

abosani te kotalisa boboto na Ye,

ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso,

epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye,

mpo na tango nyonso.

Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi. Akendeki kuna mpo na kokomisa kombo na ye mpe kombo ya Mari, mobandami na ye ya libala, oyo azalaki na zemi.

Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki. Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.

Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala.

Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu :

Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato. Boye, makanisi oyo ebombama kati na mitema ya bato ebele ekoyebana. Bongo yo mpe, okoyoka lokola nde batubi motema na yo na mopanga.

Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye :

Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso !

Yesu azongiselaki bango :

Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ?

Kasi basosolaki te maloba na Ye.

Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye.

Mãe fiel até o fim

Maria acompanhou Jesus desde o nascimento até a cruz. Ela estava entre os discípulos no Pentecostes, fiel em oração.

Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye :

Bazali lisusu na vino te !

Kasi Yesu azongiselaki ye :

Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.

Mama na Ye alobaki na basali :

Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.

Tala bato oyo batelemaki pene ya ekulusu ya Yesu : Mama na Ye, ndeko mwasi ya mama na Ye, Mari oyo azalaki mwasi ya Klopasi, mpe Mari ya mboka Magidala.

Tango Yesu amonaki ete moyekoli oyo azalaki kolinga atelemi pembeni ya mama na Ye, alobaki na mama na Ye :

Mwasi, tala mwana na yo !

Mpe alobaki na moyekoli yango :

Tala mama na yo !

Boye, kobanda na tango wana, moyekoli yango azwaki mama ya Yesu mpo ete akoma kovanda na ndako na ye.

Libota ya solo ya Yesu

Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu. Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye :

Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo.

Yesu azongisaki :

Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ?

Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki :

Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai ! Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.

Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ? Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te ? Azwi makambo oyo nyonso wapi »

Bango nyonso, na motema moko, bazalaki na molende ya kosangana mbala na mbala mpo na kosambela elongo na basi, elongo na Mari, mama ya Yesu, mpe elongo na bandeko ya Yesu.

Seja o primeiro

Este artigo te tocou? Faça uma oração!

+581 estão orando agora.

Junte-se à corrente de oração.