Marido e mulher
O casamento é aliança sagrada entre marido e mulher, instituída por Deus desde o Éden. A Bíblia define papéis complementares fundados em amor, respeito e fidelidade mútua.
Instituição divina
Deus criou homem e mulher e os uniu em uma só carne. O casamento é projeto divino que reflete o amor de Cristo pela Igreja.
Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye,
akelaki bango na elilingi ya Nzambe ;
akelaki bango mobali mpe mwasi.
Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. »
Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko.
Yesu azongisaki :
— Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, » mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ? Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »
Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge !
Papéis no casamento
O marido ama e a mulher respeita. Ambos se submetem voluntariamente a Deus e um ao outro, em parceria e unidade.
Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye, mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela.
Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba,
Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango. Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso.
Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye.
Mateya mpo na libota
Basi, botosaka mibali na bino ndenge ebongi kati na Nkolo.
Mibali, bolingaka basi na bino mpe bozalaka na makambo ya makasi te epai na bango.
Basi mpe mibali kati na libala
Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te, tango bakomona bino kotambola na bomoi ya peto mpe ya botosi.
Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.
Fidelidade e união
O casamento é honroso e deve ser preservado com fidelidade. O cordão de três dobras não se rompe facilmente.
Bato mibale bazali malamu koleka moto moko,
pamba te bakozwa lifuti ya malonga na mosala na bango.
Soki moko akweyi, moninga na ye akoki kosunga ye ;
kasi mawa na moto oyo akweyi
mpe azangi moto oyo akosunga ye !
Mpe lisusu, soki bato mibale balali esika moko,
bayokaka moto ;
kasi moto oyo azali ye moko,
ndenge nini akoki koyoka moto ?
Soki moto azali ye moko, monguna akoki kolonga ye ;
kasi soki bato bazali mibale, bakoki kotelemela monguna.
Kamba ya basinga misato ekatanaka noki te.
Masese mpo na mwasi ya lokumu
Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?
Azali na motuya koleka babiju ya talo.
Mobali na ye atielaka ye motema
mpe azangaka te biloko ya motuya.
Mobali oyo azwi mwasi ya malamu azwi bomengo,
azwi ngolu kowuta epai na Yawe.
Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo
lokola libula kowuta epai ya batata,
kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye,
kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono
oyo ezali kolia mikuwa.
Tika ete etima na yo epambolama,
mpe sepela na mwasi ya bolenge na yo,
oyo azali lokola mbuli kitoko ya mwasi,
lokola mboloko ya mafuta.
Tika ete tango nyonso,
mabele na ye etondisaka yo na esengo,
mpe bolingo na ye elangwisaka yo !
Permanecer juntos
O que Deus uniu, o homem não separe. A Bíblia protege o casamento e orienta sobre convivência, perdão e perseverança conjugal.
Na tina na libala
Sik’oyo, nazali kopesa biyano na tina na makambo oyo bokomelaki ngai.
Eleki malamu mpo na mobali ete abala mwasi te. Kasi mpo na kokima pite, tika ete mobali nyonso azala na mwasi na ye, mpe mwasi nyonso azala na mobali na ye. Tika ete mobali akokisa posa ya mwasi na ye, mpe tika ete mwasi akokisa posa ya mobali na ye. Pamba te mwasi azali na bokonzi te na nzoto na ye, ezali nde mobali na ye ; ndenge moko mpe, mobali azali na bokonzi te na nzoto na ye, kasi ezali nde mwasi na ye. Bopimelanaka nzoto te, longola kaka soki, na boyokani mpe mpo na mwa tango moke, bolingi tango mosusu komipesa na losambo. Kasi sima na tango yango, bozongela kosangisa nzoto mpo ete Satana akozwa nzela te ya komeka bino likolo ya bozangi makoki ya komikanga.
Epai ya bato oyo babala, nazali kopesa mitindo, ngai te kasi Nkolo : Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye ; kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye ; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.
Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, tika ete aboma na ye ! Na likambo ya boye, ndeko mobali to ndeko mwasi azali ya kokangama te. Nzambe abenga bino mpo na kobika bomoi kati na kimia. Oyebi nini kati na likambo yango ? Tango mosusu, yo mwasi, okobikisa mobali na yo ! Tango mosusu, yo mobali, okobikisa mwasi na yo !
Ndakisa : Mobeko ekangisaka mwasi ya libala na mobali na ye, wana mobali yango azali na bomoi. Kasi soki mobali akufi, mwasi akangolami na mobeko oyo ezalaki kokangisa ye na mobali.
Makambo oyo bosengeli te kosala na bato
Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala.