Materialismo
O materialismo é uma armadilha espiritual. A Bíblia alerta que o amor ao dinheiro é raiz de todos os males e nos chama a buscar tesouros no céu, não na terra.
O perigo das riquezas
Que aproveita ao homem ganhar o mundo inteiro e perder a sua alma? O materialismo engana e afasta do que realmente importa.
Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?
Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ?
Bato oyo balingaka kokoma na bomengo bakweyaka kati na komekama mpe bakangamaka na mitambo ya baposa mingi ya bozoba mpe ya mabe, oyo ememaka bango na libebi mpe na kufa.
Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba. Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba. Mpe lokola tokozalaka na bilei mpe na bilamba, tokosepelaka na yango.
Tesouros no céu
Ajuntai tesouros no céu, onde traça e ferrugem não consomem. O bom nome vale mais que muitas riquezas, e a sabedoria supera o ouro.
Mateya na tina na bomengo
Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango. Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ;
pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.
Yesu azongisaki :
— Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.
Kokende sango ya malamu ezali malamu
koleka kozala na bomengo mingi ;
lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.
Bwanya ezali malamu koleka wolo,
mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata.
Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu
koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
Contentamento e generosidade
Grande ganho é a piedade com contentamento. A cobiça é idolatria, mas a generosidade traz alegria e bênção.
Solo, kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela monene ya kozwa bomengo soki kaka oyebi kosepela na oyo ozali na yango.
Bato ya bomengo
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango.
Bozalaka na lokoso ya mbongo te, bosepelaka nde na oyo bozali na yango, pamba te Ye moko Nzambe alobaki : « Nakotikala kokabwana na yo te, nakotikala kosundola yo te. »
Bomoi ya sika
Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
Bongo alobaki na bato nyonso :
— Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.
Ndenge bozwi ya moto ekomaka ebele,
ndenge wana mpe bato oyo baliaka yango bakomaka ebele ;
bongo litomba nini nkolo na yango akozwa,
soki kaka te komona yango na miso ?
Oyo mpe ezali lisusu pasi oyo epesaka mawa :
ndenge moto ayaki, ndenge mpe akozonga.
Bongo litomba na ye ezali nini ?
Asali kaka mpo na mopepe ?
O invisível acima do visível
As coisas que se veem são temporais; as que não se veem são eternas. Devemos fixar os olhos no que é permanente e verdadeiro.
Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.
Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye,
oyo batonga makasi ;
akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi.
Bomengo ekolongisa ata moke te
na mokolo ya kanda ya Nzambe,
kasi bosembo ekangolaka na kufa.
Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga,
pamba te ezalaka na mapapu
mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo.
Mokolo mobimba,
akufaka na ye kaka na baposa makasi ;
kasi moto ya sembo apesaka na kobomba te.
longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta,
kopesa ngai te bobola to bozwi,
kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai,
Nalingi mpe ete basi balataka na ndenge oyo ebongi, oyo ekoki te kobetisa bato mabaku, mpe na ndenge ya lolendo te ; bakangisa suki te mpe balata te ezala biloko ya wolo, mayaka to bilamba ya talo makasi, kasi balata nde misala ya malamu, misala oyo ebongi mpo na basi oyo batatolaka polele ete bagumbamelaka Nzambe.
Bandimi batie biloko na bango esika moko
Bandimi nyonso bazalaki motema moko mpe makanisi moko. Moko te kati na bango azalaki koloba ete biloko na ye ezali kaka ya ye moko, kasi biloko nyonso ezalaki mpo na bango nyonso.