Pular para o conteúdo
Publicidade

Mente

Por Bíblia Online

A mente é campo de batalha espiritual. A Bíblia nos chama a renovar o entendimento, pensar com sabedoria e buscar a mente de Cristo em todas as áreas da vida.

Amar a Deus com a mente

O maior mandamento inclui amar a Deus com toda a mente. A vida intelectual deve ser consagrada ao Senhor.

Yesu azongiselaki ye :

Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.

bokanisaka biloko ya Likolo kasi biloko ya mokili te.

Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe.

Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.

Sabedoria e discernimento

A sabedoria é melhor que rubis. Quem a encontra, encontra a vida. A mente sábia discerne, planeja e previne erros.

Bwanya : bomengo oyo ezanga talo

Esengo na moto oyo amoni bwanya !

Esengo na moto oyo azwi mayele !

Moto oyo alukaka kozwa bwanya alingaka bomoi na ye ;

moto oyo alingaka mayele alongaka.

Ndenge kaka ebende epelisaka ebende mosusu,

ndenge wana mpe moto abongaka

soki akutani na moto mosusu.

Moto oyo azangi mayele atiolaka mateya ya tata na ye,

kasi moto oyo andimaka pamela akokoma mayele.

Ezala moto ya liboma, soki avandi kimia,

amonanaka lokola moto ya bwanya ;

moto oyo akangaka monoko na ye

amonanaka lokola moto ya mayele.

Moto ya mayele amonaka likama na mosika

mpe amibombaka,

kasi moto oyo azangi mayele alekaka kaka wana

mpe akutanaka na pasi.

Construir sobre a rocha

Quem ouve as palavras de Jesus e as pratica é como o sábio que edificou sobre a rocha firme e inabalável.

Lisese ya batongi mibale ya ndako

Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.

Bwanya oyo ewutaka epai ya Nzambe

Nani kati na bino azali moto ya bwanya mpe ya mayele ? Tika ete ezaleli malamu na ye emonisa misala na yango kati na komikitisa mpe na bwanya.

Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.

Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo.

Pamba te kozala na bwanya mingi ememelaka moto pasi,

mpe kozala na mayele mingi etungisaka motema.

Seja o primeiro