Milagres de Jesus
Os Evangelhos registram dezenas de milagres realizados por Jesus — curas, ressurreições, domínio sobre a natureza e libertações. Cada milagre revelava sua divindade e compaixão.
Curas de cegos e surdos
Jesus devolveu a visão aos cegos e a audição aos surdos, manifestando seu poder sobre toda enfermidade e deficiência.
Yesu abikisi bakufi miso mibale
Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga :
— Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango :
— Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ?
Bazongisaki :
— Iyo, Nkolo !
Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki :
— Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !
Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango :
— Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.
Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
Yesu abikisi bakufi miso mibale
Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu. Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela ; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki :
— Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi :
— Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango :
— Bolingi nasala nini mpo na bino ?
Bazongiselaki Ye :
— Nkolo, sala ete tomona.
Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye.
Yesu abikisi mokufi miso
Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso ; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye. Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka ; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye :
— Boni, omoni eloko ?
Moto yango atalaki mpe alobaki :
— Nazali komona bato, kasi bazali lokola banzete oyo ezali kotambola.
Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza.
Yesu alobaki na ye :
— Kende na ndako na yo, komeka kutu te kozonga na mboka.
Yesu abikisi baba
Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi. Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko. Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi ; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango. Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye : « Fungwama ! »
Mbala moko, matoyi na ye efungwamaki, lolemo na ye ekangolamaki mpe akomaki koloba malamu. Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto te. Atako azalaki kopekisa bango makasi, kasi bango bazalaki kaka kopanza sango yango koleka.
Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba :
— Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba.
Yesu abikisi Bartime, mokufi miso
Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga. Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga :
— Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi :
— Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
Yesu atelemaki mpe alobaki :
— Bobenga ye !
Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye :
— Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo !
Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu. Yesu alobaki na ye :
— Olingi nasala nini mpo na yo ?
Mokufi miso azongisaki :
— Moteyi, nalingi komona.
Yesu alobaki na ye :
— Kende, kondima na yo ebikisi yo.
Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu.
Yesu abikisi mokufi miso
Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga. Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki :
— Likambo nini oyo ezali kosalema ?
Balobaki na ye :
— Yesu ya Nazareti azali koleka !
Agangaki :
— Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka :
— Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa !
Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye :
— Olingi nasala nini mpo na yo ?
Mokufi miso azongisaki :
— Nkolo, nalingi komona.
Yesu alobaki na ye :
— Mona ! Kondima na yo ebikisi yo.
Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe.
Yesu abikisi mokufi miso
Wana Yesu azalaki kokende, amonaki moto moko akufa miso wuta mbotama na ye. Bayekoli na Ye batunaki Ye :
— Moteyi, nani asalaki masumu mpo ete moto oyo abotama mokufi miso : boni, ezali ye moko to baboti na ye ?
Yesu azongisaki :
— Ezali te mpo na masumu na ye to ya baboti na ye, kasi ezali mpo ete misala ya Nzambe emonisama kati na ye. Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala. Wana nazali kati na mokili, nazali pole ya mokili.
Sima na Yesu koloba bongo, abwakaki soyi na mabele mpe, na nzela ya soyi na Ye, asalaki potopoto. Bongo apakolaki yango na miso ya mokufi miso mpe alobaki na ye :
— Kende kosukola na liziba ya Siloe.
Mokufi miso akendeki mpe asukolaki. Tango azongaki, abandaki komona.
Curas de paralíticos e enfermos
Paralíticos caminharam, leprosos ficaram limpos e todo tipo de doença foi curada pelo toque e pela palavra de Jesus.
Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki :
— Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki :
— Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ; mpe Yesu alobaki na ye :
— Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango :
— Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.
Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema :
— Moto oyo azali kotiola Nzambe !
Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango :
— Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ? Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? » Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.
Bongo alobaki na ebosono :
— Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye.
epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu :
— Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ?
Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye. Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ? Nzokande, moto azali na motuya koleka meme ! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko.
Bongo, alobaki na moto yango :
— Sembola loboko na yo.
Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu.
Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele ; mbala moko, bapesaki Ye sango. Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei.
Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu :
— Soki olingi, komisa ngai peto.
Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki :
— Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto.
Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli. Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono :
— Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.
Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema : « Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ? »
Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango :
— Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ? Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono : « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola ? » Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.
Bongo alobaki na ebosono :
— Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Totikala nanu komona likambo ya boye te ! »
Yesu abikisi na mokolo ya Saba
Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye. Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko :
— Telema na liboso ya bato nyonso.
Atunaki bango :
— Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?
Kasi babatelaki kimia.
Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango :
— Sembola loboko na yo !
Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki.
Yesu abikisi moto na maba
Mokolo mosusu, wana Yesu azalaki kati na moko ya bingumba, moto moko atonda na maba na nzoto abimaki. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na Ye elongi kino na mabele mpe abondelaki Ye :
— Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki :
— Solo, nalingi yango, koma peto !
Mbala moko, maba esilaki.
Ndambo ya mibali bayaki, bamemaki ebosono moko na tsipoyi ; balukaki nzela ya kokotisa ye kati na ndako mpo na kotia ye liboso ya Yesu. Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu.
Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki :
— Molingami na Ngai, masumu na yo elimbisami !
Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa :
— Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ?
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango :
— Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino ? Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami » to « telema mpe tambola ? » Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.
Bongo alobaki na ebosono : « Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo ! »
Mbala moko, atelemaki liboso na bango, akamataki tsipoyi oyo bazalaki kolalisa ye na yango, azongaki na ndako na ye na kokumisa Nzambe.
Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali. Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye.
Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko :
— Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso !
Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso.
Bongo Yesu alobaki na bato mosusu :
— Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?
Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko :
— Sembola loboko na yo !
Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki.
Yesu abikisi mosali ya mokonzi ya basoda
Sima na Yesu koloba makambo oyo nyonso epai ya bato, akotaki na Kapernawumi.
Kuna, mosali moko ya mokonzi ya basoda azalaki kobela mpe akomaki pene ya kokufa. Mokonzi yango ya basoda azalaki kolinga mingi mosali na ye. Tango mokonzi ya basoda ayokaki sango na tina na Yesu, atindaki ndambo ya bampaka ya Bayuda epai na Yesu mpo na kosenga na Ye ete akende kobikisa mosali ya mokonzi ya basoda. Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki Ye makasi ; balobaki :
— Tata wana abongi penza ete osalela ye likambo oyo asengi epai na Yo, pamba te alingaka ekolo na biso, mpe ye nde atongaki ndako na biso ya mayangani.
Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu :
— Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai. Ezali mpe mpo na yango nde namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na Yo. Kasi loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye. Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : « Kende, » akendaka ; mpe na mosusu : « Yaka, » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo, » asalaka yango.
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi ; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.
Tango bato oyo mokonzi ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango nzoto kolongono.
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe. Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye :
— Mwasi, okangolami na pasi na yo !
Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe.
Yesu abikisi lisusu na mokolo ya Saba
Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu. Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto. Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko :
— Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te ?
Kasi bavandaki kimia.
Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye.
Yesu abikisi bato na maba zomi
Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile. Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi :
— Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa !
Tango Yesu amonaki bango, alobaki :
— Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe !
Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari.
Bongo Yesu atunaki :
— Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ? Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?
Bongo alobaki na moto yango ya Samari :
— Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !
Yesu abikisi ebosono
Sima na yango, Yesu akendeki na Yelusalemi mpo na feti moko ya Bayuda. Nzokande, kuna na Yelusalemi, pene ya Ekuke ya Bameme, ezalaki na liziba moko oyo, na lokota ya Arami, bazalaki kobenga « Betesida. » Liziba yango ezalaki na baveranda mitano zingazinga na yango. Babeli mingi bazalaki kolala na baveranda yango : bakufi miso, bato oyo batambolaka tengu-tengu mpe bato oyo bakufa makolo. [Bazalaki kozela ete mayi eningana, pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]
Ezalaki wana na moto moko oyo awumelaki na bokono mibu tuku misato na mwambe. Lokola Yesu amonaki ye alala na mabele mpe ayokaki ete awumeli mikolo ebele na pasi yango, atunaki ye :
— Olingi kobika ?
Mobeli azongiselaki Ye :
— Nkolo, nazali na moto te mpo na kokitisa ngai kati na liziba soki mayi eningani. Wana nabundanaka mpo na kokita na mayi, moto mosusu akitaka liboso na ngai.
Yesu alobaki na ye :
— Telema, kamata etoko na yo mpe tambola.
Kaka na tango yango, moto yango abikaki ; akamataki etoko na ye mpe akomaki kotambola.
Nzokande likambo yango esalemaki na mokolo ya Saba.
Yesu ayaki lisusu na Kana ya Galile, epai wapi abongolaki mayi vino. Nzokande, na Kapernawumi, ezalaki na mokonzi moko ya basoda oyo mwana na ye ya mobali azalaki kobela. Tango ayokaki ete Yesu akomi na Galile longwa na Yuda, akendeki kokutana na Ye mpe asengaki na Ye ete akende kobikisa mwana na ye ya mobali oyo akomi pene ya kokufa.
Yesu alobaki na ye :
— Boni, bokondima kaka soki bomoni bilembo mpe bikamwa ?
Mokonzi wana ya basoda alobaki :
— Nkolo na ngai, yaka noki liboso ete mwana na ngai ya mobali akufa.
Yesu alobaki na ye :
— Kende, mwana na yo ya mobali azali na bomoi.
Moto yango andimaki maloba oyo Yesu alobaki mpe azongaki.
Wana azalaki kozonga, basali na ye bayaki kokutana na ye mpe bayebisaki ye :
— Mwana na yo ya mobali abiki na bokono na ye.
Atunaki bango soki ezalaki na ngonga nini mwana abikaki.
Bazongisaki :
— Fievele etikaki ye lobi oyo eleki, na ngonga ya liboso sima na midi.
Tata asosolaki ete ezalaki kaka na ngonga oyo Yesu alobaki na ye : « Mwana na yo ya mobali azali na bomoi. » Bongo ye elongo na bato nyonso ya ndako na ye bandimaki.
Oyo nde ezalaki likamwisi ya mibale oyo Yesu asalaki sima na Ye kozonga na Galile longwa na Yuda.
A mulher com fluxo de sangue
Uma mulher que sofria há doze anos tocou a orla do manto de Jesus e foi curada instantaneamente pela sua fé.
Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye, pamba te azalaki komilobela :
— Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.
Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki :
— Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo.
Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.
Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te ; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata. Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye, pamba te azalaki komilobela : « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika ! »
Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye.
Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango. Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye ; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga.
Yesu atunaki :
— Nani asimbi Ngai ?
Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu :
— Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo.
Kasi Yesu alobaki :
— Moto moko asimbi Ngai ; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.
Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye. Kasi Yesu alobaki na ye :
— Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.
Ressurreições
Jesus ressuscitou mortos — a filha de Jairo, o filho da viúva de Naim e Lázaro. Ele é Senhor sobre a morte.
Yesu aleki bokono mpe kufa na nguya
Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye :
— Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.
Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.
Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele. Alobaki na bango :
— Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi.
Kasi bato bakomaki kotiola Ye. Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.
Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana ; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. »
Boye Yesu akendeki na ye nzela moko ; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi.
Akotaki mpe alobaki na bango :
— Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso ? Mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te ; alali nde pongi !
Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki. Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : « Talita kumi ! » Elingi koloba : Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !
Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza.
Boye Yesu alobaki :
— Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na banani ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu :
« Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ;
toyembelaki bino banzembo ya matanga,
kasi bolelaki te ! »
Pamba te, tango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki kolia mapa te mpe azalaki komela vino te, mpe bolobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »
Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! » Kasi bato nyonso oyo bayambaka Bwanya ya Nzambe batalisaka ete ezali sembo.
Yesu mpe mwasi mosumuki
Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia. Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi,
Mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye, pamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso.
Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki :
— Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te.
Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi :
— Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.
Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana. Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki :
— Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !
Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa. Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki :
— Mwana na Ngai, lamuka !
Pema ya bomoi ezongaki kati na mwana ; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia. Baboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema.
Kufa ya Lazare
Kati na mboka Betani, ezalaki na mobali moko na kombo Lazare ; azalaki kobela mpe azalaki na bandeko basi mibale : Mari mpe Marte. Mari azali mwasi oyo asopelaki Nkolo malasi mpe asalelaki suki na ye mpo na kopangusa makolo ya Yesu, mpe Lazare oyo azali kobela azali ndeko na ye ya mobali.
Bandeko nyonso mibale ya basi batindaki maloba oyo epai ya Yesu :
— Nkolo, moto oyo olingaka azali kobela.
Tango Yesu ayokaki yango, alobaki :
— Bokono oyo ekoboma ye te, kasi ekopesa Nzambe nkembo mpe ekozala nzela mpo ete Mwana na Nzambe azwa lokumu.
Nzokande, Yesu azalaki kolinga makasi Marte, ndeko na ye ya mwasi mpe Lazare. Atako ayokaki ete Lazare azali kobela, kasi avandaki lisusu mikolo mibale na esika oyo azalaki. Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Tosengeli sik’oyo kozonga na Yuda.
Bayekoli balobaki na Ye :
— Moteyi, wuta mokolo oyo Bayuda balingaki koboma Yo na mabanga, eleki nanu mikolo mingi te ; bongo mpo na nini olingi lisusu kozonga kuna ?
Yesu azongisaki :
— Boni, moyi ezalaka na bangonga zomi na mibale te ? Soki moto atamboli na moyi, akobeta mabaku te, pamba te azali komona pole ya mokili oyo. Nzokande, soki moto atamboli na butu, akobeta penza mabaku, pamba te pole ezali te.
Sima na Ye koloba bongo, alobaki na bango lisusu :
— Molingami na biso, Lazare, alali pongi ; kasi nazali kokende kolamusa ye.
Bayekoli balobaki na Yesu :
— Nkolo, soki azali kolala pongi, akobika na bokono na ye !
Solo, Yesu alingaki koloba ete Lazare akufi, kasi bayekoli bakanisaki ete azali kolobela nde pongi oyo tolalaka. Bongo Yesu alobaki na bango na polele :
— Lazare akufi.
Domínio sobre a natureza
Jesus acalmou a tempestade, andou sobre as águas e multiplicou pães. A natureza obedece à voz do seu Criador.
Yesu aleki mopepe na nguya
Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga :
— Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !
Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ?
Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki. Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »
Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye :
— Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga.
Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bazali na tina na kokende kuna te ! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
Bayekoli bazongisaki :
— Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale.
Yesu alobaki :
— Boya na yango awa epai na Ngai.
Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana.
Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango.
Yesu aleisi bato nkoto minei
Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki :
— Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.
Bayekoli na Ye bazongisaki :
— Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ?
Yesu atunaki bango :
— Bozali na mapa boni ?
Bayekoli bazongisaki :
— Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike.
Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana.
Yesu mpe Petelo bafuti mpako
Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki :
— Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ?
Petelo azongisaki :
— Afutaka !
Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye :
— Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ?
Petelo azongisaki :
— Bapaya.
Yesu alobaki na ye :
— Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te. Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.
Yesu alakeli nzete ya figi mabe
Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala. Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango :
— Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela.
Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki :
— Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko ?
Yesu azongiselaki bango :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo. Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.
Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi. Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse.
Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga :
— Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ?
Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale :
— Tika makelele ! Vanda nye !
Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki.
Bongo alobaki na bayekoli na Ye :
— Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?
Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? »
Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye :
— Ngonga epusani makasi, mpe esika oyo ezali esobe ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga.
Kasi Yesu azongisaki :
— Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
Bayekoli balobaki na Ye :
— Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ?
Yesu atunaki bango :
— Mapa boni bozali na yango ? Bokende nanu kotala.
Bakendeki kotala mpe balobaki :
— Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale.
Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu. Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano. Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano.
amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga. Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango.
Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »
Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza,
Yesu aleisi mibali nkoto minei
Na mikolo yango, ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana zingazinga ya Yesu. Lokola bazalaki na eloko ya kolia te, Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango :
— Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela ; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika.
Bayekoli na Ye bazongisaki :
— Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda ?
Yesu atunaki bango :
— Bozali na mapa boni ?
Bazongisaki :
— Tozali na mapa sambo.
Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo. Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango. Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. Bato bazalaki pene nkoto minei. Bongo, Yesu azongisaki bango.
Yesu alakeli nzete ya figi mabe
Mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala. Na mosika, amonaki nzete moko ya figi etonda na makasa ; apusanaki pene na yango mpo na kotala soki ezali na mbuma. Kasi tango akomaki pene, amonaki kaka makasa mpo ete ezalaki eleko ya bambuma ya figi te. Yesu alobaki na nzete yango : « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo ! »
Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango.
Nguya ya kondima
Na tongo ya mokolo oyo elandaki, wana bazalaki koleka, bamonaki ete nzete ya figi ekawuki kino na misisa.
Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu :
— Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki !
Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Bozala na kondima kati na Nzambe. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki moto alobi na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale ; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama. Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.
Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino. [
Yesu abengi bayekoli ya liboso
Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe. Amonaki babwato mibale pembeni ya ebale ; ezali balobi mbisi nde bakitaki longwa na babwato yango mpo na kosukola minyama na bango. Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato.
Tango asilisaki koteya, alobaki na Simona :
— Pusa bwato epai mayi ezali penza mozindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na koloba bambisi.
Simona azongiselaki Ye :
— Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama.
Tango basalaki bongo, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka. Boye babengaki baninga na bango, oyo bazalaki kati na bwato mosusu mpo ete baya kosalisa bango. Baninga yango bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale, mpe ekomaki kozinda.
Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki :
— Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !
Somo monene ekangaki Simona mpe baninga na ye nyonso, likolo ya motango ya bambisi oyo bazwaki. Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona.
Bongo Yesu alobaki na Simona :
— Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.
Boye bamemaki babwato na mokili, batikaki nyonso mpe balandaki Yesu.
Yesu aleki mopepe na makasi
Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki. Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene. Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga :
— Moteyi, Moteyi, tozali kokufa !
Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki. Yesu atunaki bayekoli na Ye :
— Wapi kondima na bino ?
Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »
Yesu aleki mopepe na makasi
Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.
Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki. Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene. Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga :
— Moteyi, Moteyi, tozali kokufa !
Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki. Yesu atunaki bayekoli na Ye :
— Wapi kondima na bino ?
Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! »
Yesu aleki milimo mabe na makasi
Bakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile.
Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye :
— Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama.
Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.
Bazongisaki :
— Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso.
Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano.
Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Bovandisa bango na masanga ; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano.
Bayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki. Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango ; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato. Bato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale.
Likamwisi ya liboso : Yesu abongoli mayi vino
Sima na mikolo mibale, ezalaki na feti moko ya libala na mboka Kana ya Galile. Mama ya Yesu azalaki na feti yango. Babengisaki mpe Yesu elongo na bayekoli na Ye na feti yango.
Esalemaki ete tango vino esilaki, mama ya Yesu alobaki na Ye :
— Bazali lisusu na vino te !
Kasi Yesu azongiselaki ye :
— Mwasi, biso na yo likambo nini ? Tango na Ngai ekoki nanu te.
Mama na Ye alobaki na basali :
— Bosala makambo nyonso oyo akoloba na bino.
Ezalaki wana na bambeki motoba ya mabanga, oyo Bayuda bazalaki kosalela mpo na komipetola. Mbeki moko na moko ekokaki kokota balitele kobanda tuku mwambe kino nkama moko na tuku mibale. Bongo Yesu alobaki na basali :
— Botondisa bambeki oyo na mayi.
Batondisaki yango meke.
Alobaki lisusu :
— Sik’oyo, botoka mayi wuta na bambeki mpe bomema yango epai ya mokambi ya feti.
Bamemaki yango epai na mokambi ya feti.
Mokambi ya feti amekaki mayi oyo Yesu abongolaki vino. Ayebaki te soki basali bazwaki vino yango wapi ; nzokande bango moko basali bayebaki, pamba te bango nde batokaki mayi. Mbala moko, mokambi ya feti abengaki mobali oyo abalaki mpe alobaki na ye : « Bato nyonso bapesaka nanu vino oyo eleki kitoko ; bongo, sima na babengami komela mingi, nde bayaka na vino oyo ya kitoko penza te. Kasi yo, obombi na yo vino oyo eleki kitoko kino sik’oyo ! »
Wana nde ezalaki likamwisi ya liboso, oyo Yesu asalaki : esalemaki na Kana ya Galile. Ezalaki moko kati na bikamwa oyo, na nzela na yango, amonisaki nkembo na Ye ; mpe bayekoli na Ye bandimaki Ye.
Yesu atunaki Filipo motuna oyo mpo na komeka ye mpe kotala soki akoloba nini, pamba te Ye, Yesu, ayebaki makambo oyo alingaki kosala.
Filipo azongiselaki Yesu :
— Mapa oyo tokoki kosomba na mbongo ya bibende nkama mibale ekokoka te mpo ete moto moko na moko kati na bango azwa eteni ya lipa !
Moko kati na bayekoli na Ye, oyo kombo na ye ezali Andre, ndeko mobali ya Simona Petelo, alobaki na Ye :
— Ezali awa na elenge mobali moko oyo azali na mapa mitano basala na bambuma ya orje, mpe bambisi mibale ; kasi yango ekosala nini mpo na ebele ya bato oyo ?
Yesu apesaki bango mitindo :
— Boloba na bato nyonso ete bavanda.
Boye, lokola ezalaki na matiti ebele na esika yango, bavandaki. Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. Bongo Yesu azwaki mapa yango, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akabolaki yango epai ya bato oyo bazalaki wana ; asalaki mpe bongo na bambisi : bato bazwaki kolanda ndenge posa na bango ezalaki.
Sima na bato kolia mpe kotonda, Yesu alobaki na bayekoli na Ye :
— Bosangisa biteni oyo etikali mpo ete eteni moko te ebeba.
Basangisaki biteni yango ; mpe na biteni ya mapa mitano basala na bambuma ya orje, oyo etikalaki na maboko ya bato oyo baliaki, batondisaki bitunga zomi na mibale.
Awa basilaki koluka nkayi na molayi ya bakilometele pene mitano to motoba, bamonaki Yesu kotambola likolo ya mayi ya ebale mpe kopusana pene ya bwato ; somo makasi ekangaki bango. Kasi Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »
Balingaki kokotisa Yesu na bwato, kasi, mbala moko, bwato etutaki mabele ya esika oyo bazalaki kokende.
Yesu abimeli lisusu bayekoli na Ye
Sima na yango, Yesu abimelaki lisusu bayekoli na Ye na libongo ya ebale ya Tiberiade. Tala ndenge nini abimelaki bango : Wana bayekoli oyo bazalaki esika moko : Simona Petelo, Toma oyo babengaka Lipasa ; Natanaele, moto ya mboka Kana ya Galile, bana ya Zebede mpe bayekoli mosusu mibale ; Simona Petelo alobaki na bango :
— Bandeko na ngai, nakeyi na ngai koloba mbisi !
Balobaki na ye :
— Biso mpe tokende elongo na yo !
Bakendeki mpe bamataki na bwato ; kasi na butu wana, bazwaki ata mbisi moko te.
Na tongo makasi, Yesu atelemaki na libongo, kasi bayekoli bayebaki te ete ezali Ye. Yesu abengaki bango :
— Bana na Ngai ! Boni, bozali na mbisi te ?
Bazongisaki :
— Te !
Alobaki na bango :
— Bobwaka monyama na ngambo ya loboko ya mobali ya bwato, mpe bokozwa bambisi.
Boye, babwakaki monyama mpe bakokaki lisusu te kobenda yango longwa na mayi, pamba te etondaki na bambisi ebele.
Moyekoli oyo Yesu azalaki kolinga mingi alobaki na Petelo :
— Bandeko, ezali Nkolo !
Tango kaka ayokaki ete ezali Nkolo, Simona Petelo akangaki nzambala na ye na loketo mpe amibwakaki na mayi, pamba te amilongolelaki bilamba mpo na koloba mbisi. Ezali bayekoli mosusu nde bazongisaki bwato na libongo, wana bazalaki kobenda monyama etonda na bambisi ebele, pamba te bazalaki mosika te na mokili : bametele pene nkama moko ekabolaki libongo na esika oyo bazalaki.
Tango bakitaki na mabele, bamonaki mapa mpe moto ya makala oyo na likolo na yango ezalaki na bambisi.
Yesu alobaki na bango :
— Boya na ndambo ya bambisi oyo bowuti kozwa.
Simona Petelo amataki na bwato mpe abendaki monyama kino na mokili. Ezalaki ya kotonda na bambisi ya minene pene nkama moko na tuku mitano na misato. Atako bambisi ezalaki penza ebele, monyama epasukaki te.
Libertações
Jesus expulsou demônios com autoridade. Os espíritos impuros não resistiam à sua palavra e saíam imediatamente.
Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi. Alobaki :
— Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.
Yesu azongiselaki ye :
— Nakoya kobikisa ye.
Mokonzi ya basoda alobaki :
— Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye. Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.
Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele ! Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda :
— Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo !
Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
Yesu aleki milimo mabe na nguya
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana. Bakomaki koganga :
— Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?
Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki. Milimo mabe esengaki na Yesu :
— Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.
Yesu alobaki na milimo yango :
— Bobima !
Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama. Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.
Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te. Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki :
— Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !
Nzambe to Satana
Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona.
Mwasi mopaya andimeli Yesu
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni. Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga :
— Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi.
Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye :
— Bengana ye ; azali kotiela biso makelele !
Yesu azongisaki :
— Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !
Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki :
— Nkolo, sunga ngai !
Yesu azongisaki :
— Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
Mwasi yango alobaki :
— Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango !
Bongo Yesu alobaki na ye :
— Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo !
Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki.
Yesu abikisi mwana na molimo mabe
Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki :
— Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi. Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye.
Yesu alobaki :
— Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki.
Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga :
— Yesu ya Nazareti, olingi nini ? Oyei nde koboma biso ? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe !
Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo :
— Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo.
Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga.
Yesu aleki milimo mabe na makasi
Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza, Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye. Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ; pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye. Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga.
Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye mpe agangaki na makasi nyonso :
— Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te !
Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »
Yesu atunaki ye :
— Kombo na yo nani ?
Azongisaki :
— Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele !
Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana. Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba.
Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. »
Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki.
Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema.
Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, » akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo. Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.
Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango :
— Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo. Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo. [
Kondima ya mwasi mopagano
Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri. Akotaki kati na ndako moko ; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama. Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi ; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye. Mwasi yango azalaki moto ya Grese, moto ya Fenisi ya Siri ; asengaki na Yesu ete abengana molimo mabe oyo ezali konyokola mwana na ye ya mwasi.
Kasi Yesu alobaki na ye :
— Tika bana ya ndako balia nanu mpe batonda, pamba te ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !
Mwasi yango azongiselaki Yesu :
— Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa !
Yesu alobaki :
— Mpo na maloba oyo olobi, kende, zonga na ndako na yo, pamba te molimo mabe esili kobima na mwana na yo ya mwasi.
Mpe tango akendeki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto mpe molimo mabe ebimi.
Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye :
— Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo ; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te. Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
Yesu alobaki na bango :
— Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.
Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko.
Yesu atunaki tata ya mwana :
— Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye ?
Tata ya mwana azongisaki :
— Wuta tango azalaki mwana moke penza. Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.
Yesu alobaki na ye :
— Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi :
— Nandimi ! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.
Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe :
— Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.
Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi ! »
Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki.
Yesu abikisi bato ebele
Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye. Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei.
Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye ; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda. Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka :
— Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te !
Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko. Yesu atunaki ye :
— Kombo na yo nani ?
Azongisaki :
— Ngulupa.
Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye. Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo. Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu ; mpe Yesu apesaki yango nzela. Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki.
Tango bakengeli ya bangulu bamonaki likambo oyo ewuti kosalema, bakimaki mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bilanga. Bato babimaki mpo na koya kotala likambo oyo esalemi. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki mobali, oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, alata bilamba, avandi na makolo ya Yesu na mayele na ye ya kokoka ; boye somo ekangaki bango.
Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.
Nzoto ya Yesu ebongwani
Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela.
Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali. Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo ; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi.
Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye.
Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki :
— Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa ! Totonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.
Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba.
Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki :
— Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko ! Molimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
Yesu alobaki :
— Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko ? Mema mwana na yo awa.
Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye. Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe.
Yesu asakoli kufa na Ye
Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye :
Nzambe to Satana
Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki.
Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. Kasi Yesu alobaki :
— Boye lisusu te !
Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye.
Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane :
— Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ? Soki te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alata bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi. Kasi nani bino bokendeki penza kotala ? Mosakoli ? Iyo, nazali koloba na bino, mpe aleki kutu ata mosakoli. Yoane azali moto oyo Makomi ezali koloba boye na tina na ye :
« Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo,
oyo akobongisela Yo nzela. »
Nazali koloba na bino : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Nzambe aleki Yoane Mobatisi na monene.
Bato nyonso elongo na bafutisi mpako oyo bayokaki maloba na Yesu bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, pamba te Yoane abatisaki bango Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango.