Pular para o conteúdo
Publicidade

A mulher sábia

Por Bíblia Online

A mulher sábia constrói sua casa sobre o fundamento do temor do Senhor. Sua sabedoria abençoa a família, a comunidade e as gerações futuras.

A sabedoria que edifica

A mulher sábia edifica sua casa. O temor do Senhor é o princípio da sabedoria e a instrução que conduz à honra.

Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye,

kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango

na maboko na ye moko.

Kotosa Yawe ezali mosisa ya bwanya ;

koyeba Mosantu, yango nde kozala mayele.

Kotosa Yawe ezali eteyelo ya bwanya ;

komikitisa eyaka liboso ya nkembo.

Libondeli ya kondima

Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.

Bomipesa na Yawe mpe bosenga makasi na Ye !

Bolukaka tango nyonso elongi na Ye !

Virtude e excelência

A mulher virtuosa é coroada de força e dignidade. Ela abre a boca com sabedoria e a instrução da bondade está na sua língua.

Masese mpo na mwasi ya lokumu

Nani akoki komona mwasi ya lokumu ?

Azali na motuya koleka babiju ya talo.

Alataka lokola elamba : molende na mosala mpe lokumu ;

mikolo ya lobi ebangisaka ye te, asekaka nde yango.

Alobaka na bwanya,

mpe lolemo na ye epesaka malakisi na bolingo.

Bana na ye bakotelema mpo na kokumisa ye,

mpe tala ndenge mobali na ye mpe akumisaka ye :

« Basi ebele basalaka makambo ya lokumu ;

kasi yo, oleki bango nyonso »

Bonzenga ya elongi ekosaka,

mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ;

kasi mwasi oyo atosaka Yawe,

ye nde abongi na lokumu.

Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye,

kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono

oyo ezali kolia mikuwa.

Mwasi ya malamu azwaka lokumu,

mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.

Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo

lokola libula kowuta epai ya batata,

kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.

Exemplo e influência

A mulher sábia é exemplo de fé e bom testemunho. Suas atitudes inspiram e seu legado abençoa as gerações que virão.

Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu, mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango, komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.

Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala : basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.

Lisese ya baseka zomi

Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala. Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele. Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te ; ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.

Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki. Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye »

Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango. Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa»

Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko»

Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.

Na sima, baseka mosusu mpe bayaki ; balobaki : « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke » Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te»

Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.

Seja o primeiro