Mulher
A Bíblia celebra a mulher como obra-prima da criação divina. Ela é elogiada por sua sabedoria, força, beleza interior e papel fundamental na família e na sociedade.
A mulher na criação
Deus criou o homem e a mulher à sua imagem. A mulher foi formada como ajudadora idônea — parceira de igual dignidade e valor.
Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye,
akelaki bango na elilingi ya Nzambe ;
akelaki bango mobali mpe mwasi.
Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango. Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali.
Boye, mobali alobaki :
« Tala na mbala oyo,
oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai,
mosuni ya mosuni na ngai.
Bakobenga ye mwasi,
pamba te awuti na mobali. »
Virtude e caráter
A beleza é vã e a formosura passageira, mas a mulher que teme ao Senhor é digna de louvor. Seu caráter é seu maior tesouro.
Bonzenga ya elongi ekosaka,
mpe kitoko ya nzoto ezalaka pamba ;
kasi mwasi oyo atosaka Yawe,
ye nde abongi na lokumu.
Mwasi ya bwanya atongaka ndako na ye,
kasi mwasi oyo azangi mayele abukaka yango
na maboko na ye moko.
Mwasi ya malamu azali motole ya mobali na ye,
kasi mwasi oyo ayokisaka soni azali lokola bokono
oyo ezali kolia mikuwa.
Mwasi ya malamu azwaka lokumu,
mpe bato ya makasi bazwaka bomengo.
Moto akoki kozwa bandako mpe bomengo
lokola libula kowuta epai ya batata,
kasi mwasi ya bwanya azali likabo kowuta na Yawe.
Kovanda kati na esobe ezali malamu
koleka kovanda esika moko na mwasi
oyo aswanaka-swanaka mpe asilikaka-silikaka.
Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga.
Sabedoria e serviço
As mulheres da Bíblia foram líderes, profetisas e discípulas fiéis. Jesus honrou as mulheres e as incluiu em seu ministério.
Basi oyo bazalaki kotambola na Yesu
Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye, bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ; Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko.
Basi mpe mibali kati na libala
Bino mpe basi, botosaka mibali na bino mpo ete, soki ezali na ndambo ya mibali oyo bandimaka Liloba na Nzambe te, bakoma kondima na nzela ya bizaleli malamu ya basi na bango, ata soki bateyi bango Liloba te,
Bino mpe mibali, bovandaka na bwanya elongo na basi na bino, boyebaka ete bazali bato na bolembu. Bopesaka bango lokumu, pamba te bango mpe basengeli kozwa elongo na bino bomoi kowuta na Nzambe, na ngolu na Ye, mpo ete eloko moko te ekanga losambo na bino.
Ezali mpe ndenge moko mpo na badiakona ya basi. Basengeli kozala : basi oyo babongi na limemia, basi oyo batongaka bato te, basi oyo balekisaka ndelo te na bizaleli na bango mpe basi ya sembo na makambo nyonso.
Teya mpe bamama mibange ete bazala na bizaleli oyo ekoki na bato oyo bamibulisa mpo na Nzambe : basengeli te kotongaka bato mpe kozala bawumbu ya masanga ; basengeli nde komipesa na koteyaka makambo ya malamu, mpo ete balakisa na bilenge basi kolinga mibali na bango mpe bana na bango, komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.