Namoro e sexo
Namoro e sexo são temas que a Bíblia trata com clareza e sem tabus. Deus criou o sexo como bênção dentro do casamento e nos chama à pureza fora dele.
Pureza sexual
A vontade de Deus é a santificação. Cada um saiba controlar seu próprio corpo em santidade e honra, não na paixão do desejo.
Nzambe alingi ete bozalaka bule tango nyonso : bokimaka pite ; moko na moko kati na bino asengeli koyeba kobatela nzoto na ye kati na bosantu mpe lokumu, asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,
« bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.
Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto.
Arrependimento e restauração
Bem-aventurado aquele cujo pecado é perdoado. Deus restaura os que se arrependem e cria neles um coração limpo e renovado.
Bolimbisi epesaka esengo
Nzembo ya Davidi.
Esengo na moto oyo mabe na ye elimbisami,
mpe masumu na ye elongwe !
Esengo na moto oyo Yawe atangelaka lisumu te,
mpe atambolaka na lokuta te.
Lokola nazalaki kondima mabe na ngai te,
nazalaki tango nyonso kolela mpo na pasi.
Butu mpe moyi,
loboko na Yo ezalaki kofinafina ngai ;
makasi na ngai ekomaki kosila
ndenge makasa ekawukaka na eleko ya moyi.
Tango nandimaki masumu na ngai
mpe nabombaki mabe na ngai te,
nalobaki : « Nakotubela
masumu na ngai liboso ya Yawe. »
Bongo Yo olimbisaki mabe mpe masumu na ngai.
Boye, tika ete bayengebene nyonso
basambelaka Yo na tango ya malamu !
Soki mayi minene etomboki,
bambonge na yango ekozwa bango te.
Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba.
Oh Nzambe, yokela ngai mawa
kolanda bolingo monene na Yo ;
longola masumu na ngai
kolanda mawa monene na Yo !
Sukola ngai mobimba
mpo na kolongola mabe na ngai,
mpe petola ngai na masumu na ngai.
Solo, nabotamaki kati na lisumu ;
wuta na libumu ya mama na ngai,
nazali mosumuki.
Nzokande Yo, osepelaka na bosembo,
ata kati na libumu ;
mpe okoteya ngai bwanya
kati na esika ebombama.
Petola ngai na nzela ya izope,
mpe nakokoma peto ;
sukola ngai, mpe nakokoma pembe
koleka mvula ya pembe.
Sepelisa ngai mpe yokisa ngai nsayi na motema ;
mpe mikuwa na ngai oyo obukaki
ekosepela makasi.
Kotala lisusu masumu na ngai te,
mpe longola bambeba na ngai nyonso.
Oh Nzambe, mpo na ngai, kela motema ya peto ;
mpe kati na ngai, yeisa molimo sika mpe elenda.