Não desista!
'Não desista!' é o grito do céu para a terra. Deus nos encoraja a perseverar na fé, na oração e na esperança, porque a vitória pertence aos que não se rendem.
Força na fraqueza
Os que esperam no Senhor renovam as forças. Deus não se cansa nem se fatiga — Ele dá poder aos fracos e vigor aos cansados.
Oyebi te ? Nanu oyoka te ?
Yawe azali Nzambe ya libela na libela,
azali Mokeli ya basuka ya mabele ;
alembaka te mpe apemaka te,
mpe moko te akoki kososola mayele na Ye.
Apesaka makasi na bato oyo balembi
mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya.
Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka,
bilombe batengaka-tengaka ;
basi bato oyo batiaka elikya na Yawe,
Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika :
bapumbwaka likolo lokola bampongo,
bapotaka mbangu mpe bapemaka te,
batambolaka mpe balembaka te.
Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi,
bokolela lisusu te.
Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ;
tango kaka akoyoka, akoyanola bino.
Mobikisi Moko Kaka mpo na Isalaele
Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi,
Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ;
Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele :
« Kobanga te, pamba te nasikolaki yo,
nabengaki yo na kombo na yo,
ozali ya ngai.
Tango okokatisa mayi monene,
nakozala elongo na yo ;
mpe tango okokatisa bibale,
ekozindisa yo te.
Tango okotambola kati na moto,
okozika te,
mpe ndemo na yango ekotumba yo te ;
pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo,
Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo.
Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo,
Kushi mpe Seba na esika na yo.
Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli. Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi.
Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya. Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.
Perseverança na fé
Não perca a confiança, pois ela tem grande recompensa. O justo viverá pela fé, e quem perseverar até o fim será salvo.
Boye, bobungisa elikya na bino te, pamba te lifuti monene ekangani na yango.
Tobatela makasi elikya oyo tozali kondima ete ezali ya solo, pamba te Ye oyo apesaki biso bilaka akosaka te. Tosenzelana biso na biso mpo na kotindikana na bolingo mpe na misala ya malamu.
Tokima Bandako ya Nzambe na biso te, ndenge bato mosusu bamesana kosala ; kasi tolendisana biso na biso, wana bozali komona ete mokolo ya Nkolo ekomi pene.
Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye.
Pamba te Liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ekotaka koleka kutu mopanga oyo ezali na minu na bangambo nyonso mibale, ekomaka kino kokabola elimo mpe molimo, mikuwa mpe mafuta oyo ezalaka kati na mikuwa, mpe esosolaka malamu makanisi mpe mikano ya motema ya moto.
Tosalaka bolamu ; tolembisa nzoto na biso te mpo na yango, pamba te tokobuka mbuma na tango oyo esengeli soki toyiki mpiko.
Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.
Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu, oyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango kati na Yesu, bazala na mpiko.
Komekama mpe baposa ya nzoto
Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.
Deus é refúgio
O Senhor é nosso refúgio e fortaleza. Ele ouve nossas orações, nos consola nas tribulações e transforma choro em dança.
Nzambe azali ekimelo na biso
Nzembo ya bana ya Kore. Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Eyembamaki na mongongo moke ya bilenge basi.
Maloba ya monoko na ye ezalaka sukali,
nzokande bitumba evandi kati na motema na ye ;
maloba na ye ezalaka ya kimia koleka mafuta,
nzokande ezali mopanga oyo ezangi ebombelo.
Akonzaka mokili na bosembo,
akataka makambo ya bato na alima.
Yawe azali ebombamelo
mpo na bato oyo bazali konyokolama,
mpe ndako makasi mpo na tango ya pasi.
Bato oyo balonaka na mpinzoli
babukaka na banzembo ya esengo.
Moto oyo akendaka na kolela,
tango amemi milona na ye,
azongaka na esengo
wana amemi maboke na ye.
Bino babulami na Ye nyonso,
bolinga Yawe !
Yawe abatelaka bato ya sembo epai na Ye,
kasi apesaka etumbu ya makasi
epai ya bato ya lofundu.
Liloba na Yo ezali mwinda
mpo na makolo na ngai,
mpe pole mpo na nzela na ngai.
Yawe azali pene ya bato nyonso
oyo babelelaka Ye,
ya bato nyonso oyo babelelaka Ye na solo ;
akokisaka posa ya bato oyo batosaka Ye,
ayokaka mpe abikisaka bango tango babelelaka Ye.
Vitória em Cristo
Jesus venceu o mundo e nos dá vitória. Para Deus nada é impossível, e Ele faz infinitamente mais do que pedimos ou pensamos.
Nasengelaki koloba na bino bongo mpo ete bozala na kimia kati na Ngai. Kati na mokili, bozali solo komona pasi ; kasi boyika mpiko, nalongi mokili.
Banda na tango wana, bayekoli na Ye mingi bazongaki mpe batikaki kolanda Ye.
Boye, Yesu alobaki na bantoma zomi na mibale :
— Boni, bino mpe bolingi kokende ?
Simona Petelo azongisaki :
— Nkolo, tokokende epai ya nani ? Yo nde ozali na maloba ya bomoi ya seko. Biso, tondimi mpe toyebi ete ozali Mosantu ya Nzambe.
Nakotika bino te lokola bana bitike ; nakozongela bino.
Molende na mabondeli
Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ; pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.
Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi. Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi. Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.
Wana Yesu atalaki bango, alobaki :
— Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !
Pamba te Nzambe alembanaka eloko te.
Esperança e transformação
O Senhor completa a boa obra que começou em nós. Ele faz novas todas as coisas e dá esperança para o futuro.
Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto.
Yango wana, soki moto azali kati na Klisto, akomi ekelamu ya sika : makambo ya kala eleki, mpe makambo ya sika eyei.
Emoniseli ya sambo : likolo ya sika mpe mabele ya sika
Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te. Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye. Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango. Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. »
Yawe azali malamu,
azali ebombamelo ya solo na tango ya pasi
mpe abatelaka bato nyonso oyo batiaka elikya na Ye.
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. »
Permanecendo firme
Persevere na oração, firme-se na Palavra e fortaleça-se na graça de Cristo. A fé vem pelo ouvir, e o ouvir pela Palavra de Deus.
mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ; mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ;
mpo na oyo etali elikya, bozalaka na esengo makasi ; mpo na oyo etali pasi, bokangaka mitema ; mpo na oyo etali mabondeli, bozalaka na molende ;
Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.
Boye, kondima ewutaka na maloba oyo toyokaka, mpe maloba oyo toyokaka ewutaka na Liloba ya Klisto.
Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.
Makomi nyonso ekomama na nguya ya Nzambe mpe ezali na tina mpo na koteya, kopamela, kozongisa na nzela mpe kolakisa bato kotambola kolanda bosembo, mpo ete moto na Nzambe azala ya kokoka mpe ya kobongisama mpo na kosala misala nyonso ya malamu.
Kamata lokola ndakisa, mateya ya sembo oyo nateyaki yo mpe salela yango kolanda kondima mpe bolingo oyo tozali na yango kati na Yesu-Klisto. Batela yango malamu lokola bomengo, na lisungi ya Molimo Mosantu oyo avandaka kati na biso.
Tika ete Ye moko Yesu-Klisto, Nkolo na biso, mpe Nzambe, Tata na biso, oyo alingaki biso mpe apesaki biso, na ngolu na Ye, malendisi ya seko mpe elikya ya malamu, balendisa mitema na bino mpe bapesa bino makasi ya kosala bolamu kati na misala mpe maloba nyonso !
Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.
Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe : soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso. Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye.
Tango nyonso mpe na makambo nyonso, bolingo elimbisaka, endimaka, ezalaka na elikya, eyikaka mpiko.