Publicidade

Não temas

Por Bíblia Online

'Não temas' é uma das frases mais repetidas na Bíblia. Deus a pronuncia nos momentos de maior temor, lembrando que sua presença e poder são maiores que qualquer ameaça.

Deus está contigo

Não temas, porque eu sou contigo. Deus repete essa promessa em cada crise, guerra e desafio que seus filhos enfrentam.

Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ;

komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ;

nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ;

solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali,

loboko oyo elongisaka.

Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo,

nasimbi makasi loboko na yo ya mobali

mpe nazali koloba na yo :

‹ Kobanga te, nakosunga yo

Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te,

Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te,

pamba te Ngai moko nakosunga yo»

elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele.

Mata likolo ya ngomba,

Siona, yo momemi sango malamu ;

tombola mongongo na yo mpe ganga makasi,

Yelusalemi, yo momemi sango malamu ;

tombola yango penza, kobanga te ;

loba na bingumba ya Yuda :

« Botala Nzambe na bino »

Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende»

Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te»

Nzambe asali boyokani elongo na Abrami

Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli :

Kobanga te, Abrami !

Nazali nguba na yo,

lifuti na yo ekozala monene.

Coragem diante do perigo

Não tenhas medo — o Senhor teu Deus está no meio de ti, poderoso para salvar. Ele luta por nós e dá forças aos medrosos.

Na mokolo wana,

bakoloba na Yelusalemi :

‹ Oh Siona, kobanga te !

Tika ete maboko na yo elemba te !

Yawe, Nzambe na yo, azali elongo na yo,

azali Elombe Mobikisi.

Akosepela na yo makasi

mpe akopemisa yo, na bolingo na Ye ;

akoyemba banzembo ya esengo na tina na yo

Mosakoli azongisaki :

Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango.

Elize asambelaki :

Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona !

Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki ; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize.

Oh mabele, kobanga te,

zala na esengo mpe sepela,

pamba te Yawe asali makambo minene.

Kasi Yawe alobaki na ngai :

Koloba te : « Nazali elenge» Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo. Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, elobi Yawe.

Mokolo moko, na butu, Nkolo alobaki na Polo kati na emoniseli : Kobanga te, koba kaka koloba, kokanga monoko te. Nazali na yo elongo, mpe moto moko te akolonga kobundisa yo mpe kosala yo mabe, pamba te nazali na bato mingi kati na engumba oyo.

Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki. Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, ezala bayokeli yo to bayokeli yo te, mpo ete bazali batomboki.

Fé que vence o medo

O medo não vem de Deus. Jesus disse: não temas, crê somente! A fé dissipa o medo e nos conecta ao poder de Deus.

Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani :

Kobanga te, zala kaka na kondima !

Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.

Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.

Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu.

Kasi anjelu alobaki na ye :

Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu !

Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki :

Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !

Seja o primeiro
Bíblia Online Bíblia Online

Bíblia Online • Versão: 2026-07-05_19-25-13-